1 Kati na Eklesia na Antoiche, ezalaki na basakoli mpe balakisi. Bazalaki Barnabas, Simoni (oyo babengi Niger), Lucius ya Cyrene, Manahen (oyo akokwamaki na Herode Tetrarque) mpe Saul. 2 Tango bazali kogumbamela Mokonzi mpe kokila, Molimo Mosantu akaboli Barnabas na Saul mpo na mosala oyo abiangaki bango. 3 Sima bango ko sambela mpe kokila ba bulisi bango mpe ba tindi bango. 4 Barnabas na Saul batosi Molimo Mosanto mpe bakiti na Seleucie. Kuna nde ba koti na Chyprte. 5 Bokomi na bongo na engumba ya Salamine, bateyi liloba ya Nzambe na eyanganeli ya ba Yuda. Yowana-Malako azalaki kosunga bango. 6 Basili kokatisa ti na Paphos, ba moni nganga kisi , mosakoli ya lokuta ya ba Yuda, na kombo ya Bar Yesu. 7 Asanganaki na Proconsul Sergius Paulus, moto mayele. Moto oyo abengaki Barnabas na Saul po ete alingaki koyoka liloba na Nzambe. 8 Kasi nganga kisi Elymas atelemelaki bango abandaki ko meka kobongolisa bondimi ya Proconsul. 9 Kasi Saul, oyo babengi lisusu Polo, atondaki na Molimo Mosantu, ataliye na miso, 10 mpe alobi: «Yo mwana satana, otonda na motombo mpe kanda, ozali monguna ya bosembo. Otikaka kopenguisa nzela ya alima ya Mokonzi te? 11 Tala sasayipi maboko ya Mokonzi eza likolo na yo mpe oko kufa miso.Sima mwa ntango mukie okomona moyi te. Londende pe molili ezipi Elymas; akomi koluka nani oyo akosalisa ye mpo na kotambola. 12 Proconsul amonaki nyonso wana andimeli bateya na ntina ya Mokonzi. 13 Kowuta Paphos Polo na ba ninga na ye ba nani na masuwa ti kokoma na Perge na Pamphylie. Kasi Yoani atiki bango kozonga na Yelusalem. 14 Polo na baninga na ye bakomaki na Antioche mpe bakotaki na eyangenelo ya ba Yuda mokolo ya sabati mpe bafandaki. 15 Sima ya matangi mibeko na ba sakoli, mokonzi ya eyangelo ya ba Yuda atindeli bango maloba nakoloba ete: « Ba ndeko, soki bozali na maloba yako lendisa libota, bo loba.» 16 Polo alobi: « Batu na Israel, bino oyo bo memiaka Nzambe boyoka! 17 Nzambe ya libota Israel aponaki ba koko na biso abotisaki mutuya na bango na etonga ya Ezipito, asemboli loboko na ye mpe abimisi bango. 18 Mbula tuku meneyi abatelaki mpe asalisaki bango kati na esobe. 19 Sima kobebisa bikolo sambo kati na ekolo ya Canaan, apesi libota na biso mabele wana lokola bomengo. 20 Nyonso wana esilaki na kokisama kobanda mibu nkama miney natuku mitano. Sima makambu wana, Nzambe apesi ba zuzi, kino mosakoli Samuel. 21 Baluki mokonzi, Nzambe apesi Saul, mwana na Kis, moto ya libota ya Banjamin, po na mibu tuku miney. 22 Nzambe alongoli ye na bokonzi, abimisi Dawidi muana Isai pona kozala moto kolandisa motema na ye m:pe asala mansop oyo nalingi asala. 23 Nzambe ameni Mobikisa na kokitana ya Dawidi, Yesu, lokola alakaki kosala. 24 Ebandaki yambo Yesu awa, Yowani azalaki koteya tina ya libatisi ya koyambola masumu na eloko ya israel. 25 Tango mosala ya Yowani esilaki, alobi: «Bokanisaka naza nani? Oyo naza te. Kasi boyoka, Moto moko akoya sima na ngayi, oyo nakoki ata kofongola singa ya sapatu na ye te. 26 Ba ndeko, bana ya libota na Abraham mpe ba ngumbameli Nzambe, sango malamu ya lobika etindami mpo na biso. 27 Po ete ba oyo bafandaki na Yelusalem na ba konzi na bango bayebaki ye te mpe bakokisaki maloba ya ba sakoli oyo etangamaka mokolo nyonso ya Sabba nako katela etumbu 28 Atako bazangaki tina ya solo po na koboma ye, na sengaki Pilate aboma ye. 29 Tango bakokisi maye manso bakomaki bakitisi na ye na ekuluse, mpe bakundi ye na lilita 30 Kasi Nzambe asekwisaki ye na kati ya ba kufi. 31 Amonanaki na ebele ya bato mikolo ebele na baye ba butaki na Galile ya Yelusamel. Bato wana nde ba nzengeneke ya libota. 32 Tomemi sango malamu oyo po na elaka oyo epesamela ba koko na biso. 33 Nzambe akokisi elaka na ye po na biso, bana na bango, nako sekwisa Yesu kati na bakufi. Yango wana ekomani na nzembo na Dawudi: «Oza mwana na nga, lelo nakomi Tata na yo». 34 Na yango asekwisi ye kati na ba kufi po ete nzoto na ye ebeba te, alobi boye: "Nako pesa bino ba santu mpe mapamboli na Dawudi". 35 Yango alobi lisusu na nzembo na Dawudi mususu: "Okondima te komona nzoto ya Mosantu epola". 36 Mpo Dawudi asilaki ko lala elongo na ba tata na ye mpe nzoto na ye epolaki, 37 kasi oyo Nzambe asekwisaki ayebaki Kopola te. 38 Eyebana na bino bandeko na nzela ya mutu wana nde kolimbisama ya masumu elobami. 39 Na ye oyo nyonso ako ndima ye alongisama na mibeko na Mose. 40 Bosala agele, makambo basakoli baloba ekomela bino te. 41 Botala, bobongaka te, bozala kolongono, mpo ete nazo sala masala kati na bino. Musala oyo boko ndima te ata moto ayebisi bino. 42 Lokola Polo na Barnabas bakendaki, libota esenge ba bandela maloba wana na Sabati oyo ekoya. 43 Na sima ya mayangani na eyenganelo ya ba Yuda, Ba yuda ebele na ba proselystes oyo bazalaki malamu balandaki Polo na Barnabas oyo babandaki kolendisa bango na ko koba na ngolu ya Nzambe. 44 Bayike na bato na mboka basanganaki na Sabati oyo elandi po na koyoka liloba na Mokonzi. 45 Tango ya Yuda ba moni etuluku ya batu, batondisamaki na zuwa mpe ba bandaki koloba mabe na tina ya makambu oyo Polo azalaki koloba mpe kofinda ye. 46 Polo na barnabas babandaki koloba na kobanga te : «Eza motuya loloba na Nzambe eteyama epayi na bino bato ya yambo. Kasi ko bwakisa yango po bozomi mona bokoki te po na bomoyi ya seko, tala tobaluki epayi ba pagano. 47 Mpo ete Mokonzi apesaki mitindo boye: "Natiaki yo po ozala mpole na ba pagano mpe omema sango malamu na suka ya mokili". 48 Ba pagano basepelaki mpe ba kumisaki liloba ya Nzambe, nakoyokaka maloba ya Polo. Ebele oyo baponama pona bomoyi ya seko bandimaki. 49 Liloba na Mokonzi epanzanaki na engumba nyonso. 50 Ba Yuda batombokisi basi ya motuya mpe bakambi ya engumba. Ba botisi mobulu mpe na bengani Polo na Barnabas libanda na ndelu ya engumba. 51 Kasi Polo na Barnabe balakeli bango mabe na ko popola makolo na bango. Mpe bakeyi na engumba ya Icone. 52 Bayekoli batondisamaki na esengo na Molimo Mosantu.