Mokapo 14

1 Wana ekomaki Polo na Barnbas na Icone, bakotaki elongo na kati ya eyanganelo ya bayuda mpe koteya na lolenge oyo ebele na ba yuda mpe ba Grecs bandimelaki liloba. 2 Kasi bayuda oyo bazalaki pkwokoso ba bongolisaki mitema ya ba pangano mpe bayeyisaki boblo epayi ya bandeko. 3 bawumelaki tango molayi esika wana, koloba na nkonzo mpe nguya ya Nzambe mpe kozongisa etatoli na ntina na nsango ya ngolu. Esalamaki bongo mpona kopesa nzila te bilembo mpe makamuiselama na maboko na Polo na Barnabas. 4 kasi engomba ya mboka wana ekabwanaki: basusu mpona bayuda, basusu mpona batoma. 5 Tango ba panganoelongo na bayuda ba sanganaki mpona kondimisa bakonzi mpo bakoka koniokola mpe kobamba Polo na Barnabas mabanga. 6 Polo na Barnabas bayokaki mabongisi ya mabe oyo mpe bakimaki okati na bingumba ya lycaone na Derbe mpe engunda mosusu na Zinga Zinga. 7 Mpe kuna bajteyaki sango malamu. 8 nakati na mboka Lystre ekolope moko afandaki, kowuta, mbotama na ye, atambola te. 9 Moto wana azalaki koyoka maye Polo azalio koteya bango, Polo atalakiye na elikia te motu oyo azali na kondima, akoki kobikisama. 10 Alobi naye, konganga na mongongo makasi: « Telema nzungukalu» mpe motu oyo apimbwe mpe atmboli. 11 tango emonaki ngulupa ya batu oyo Polo asali, batomboli mingongo mpe balobi na kota ya Lyaconienne: « ba Nzambe bakiteli biso na lolenge ya bato mpebapesaki bango nkombo». 12 Barnabas, abiangamaki na nkombo ya « Zeus» mpe Polo nkombo ya « mercure», mpo ye nde azalaki moteyi monene. 13 Nganaga Nzambe ya Zeus oyo tempelo naye ezalaki na ekuke ya engunda ya mboka, bamemaki ngombe mpe fololo mpona kobonza mbeka. 14 Tango ba ntoma: Polo na Baenabas bayoki yango, bapaosoli bilamba bango mpe ba welisi na lombango okati na etuluku ya bango na 15 Konganga ete: batu pona nini ekosala bino bongo? tazali mpe bikelamùu, mpe posa ndenge moko na bino. toyeli bino nsango malamu oyo esengeli na bino kobowanga na makambo oyo ya mpamba mpe kobaluka epayi na Nzambe na bomoyi oyo asalaki likolo na mabele, mayi na maye maso evandi likolo na yango. 16 Na tango ya kala atikaki bikolo etambola na lolenge na yango. 17 Ata ko atikaki te kotatola lolenge ye azali, na kosala malamu, na kopesa bino mbula kowuta na likolo mpe bilanga ya mapamboli, na kaliyisa mpe kotondisa mitema na bino na esengo. 18 Atako maloba oyo Polo na Barnabas, epekisaki bango te kobonza mbekaoyo. 19 bayuda mosusu ya Antioche mpe Icone bayaki kokotisa makanisi ebe kati na etuluku oyo. babanbaki Polo mabanga mpe kosukuma ye kinoi libanda ya engunda wana, na likanisi ete azali kokosa. 20 Na tango bantoma bazalaki zinga zinga na ye, atelemaki mpe akotaki na kati ya engunda, lobi elandi akendaki na derbe ye na Barnabas. 21 Sima wana esilaki bango koteya nsango malamu na kati ya engunda wana, mpe kozua ba ntoma ebele, bazongaki lisusu na Lustre; Icone mpe na Antioche. 22 Batikakite kolendisa milimo ya ba ntoma mpo bayika mpiko na kati na kondima na ntina ete: « ezali bobele kati na minioko mingi nde tokoyingela na bokonzi ya Nzambe.» 23 Wana esili bango kofandisa kati na mangomba ya bandimi mpe sima ya kobondela mpe kokila bilei, batiki bango na Mokonzi oyo bandimelaki. 24 Bakatisaki pisidie mpe kokoma na Pamphilie. 25 Baskolaki sango malamu na Perge mpe kokita kuna na Attalie. 26 Kuna bayingila okati na masuwa mpona kokende lisusu na Antioche epai basengelaki na bango mpona ngolu na Nzambe na ntina mosala oyo bawuti kokokisa. 27 Ntango ekomaki bango na Antioche mpe babenasaki lingomba mombima, bayebisaki bango maye manso Nzambe asalaki na bango lolenge boni boni ezipelo ya nkondima epayi ya ba pa1gano. 28 Bafandaki wana ntango molayi na ba ntoma.