1 Ndambu na bato bakitaki na Judee, mpe bateyaki bandeko koloba boye:«soki yo okokata ngenga te engebene na mobeko na Mose, okoki kobika te.» 2 Tango Paulo na Barnabas bandongbanaki noki na maloba na bango, bandeko bazwaki mokano ete, Paulo mpe Barnabas mpe bandeko mosusu bakumbama na Yelusaleme pene ya bantoma mpe ba mpaka kosolola na ntina likambo lina. 3 Tango bandeko batinami na ndingisa ya etonga, balekaki na Phenicie mpe Samalia mpe bateyaki kobongola mitema ya bapagano. Boye bapesaki esengo makasi na bandeko yonso. 4 Na bokomi na bango o Yelusaleme, bayambamaki na etonga kati na bantoma mpe na bampaka, boye bamonisaki manso oyo Nzambe akokisaki na bango. 5 Na boye, ndambu na baoyo bandimelaki kati na Bafalizao, batelemelaki bango koloba: «Ebongi malamu kokatisa bango ngenga mpe kotosa mobeko na Mose. 6 Bantoma na bampaka basanganaki na ntina ya kosolola likambo yango. 7 Sima na ngonga molai ya masolo; Petelo atelemaki mpe alobi: «Bandeko bozali na boyebi ete ngonga molai Nzambe aponaki ngai kati na bino, na ntina ete na nzela na ngai, bapagano bayeba sango malamu mpe bandimela. 8 Bongo Nzambe oyo ayebi mitema, atatoli mpo na bango na bopesi bango Molimo Mosantu pelamoko na biso. 9 Boye, ye akesenisi biso na bango te, na kobulisa bango mitema kati na kondima. 10 Sika oyo, boni boni bozali komeka Nzambe, na komemisa bayekoli mokumba oyo ata bankoko na biso to biso, tokokaki komema te. 11 Kasi tozali na kondima ete tokobika na ngolu ya Mokonzi Yesu pelamoko bango.» 12 Bayike banso bayokamelaki tango Barnabas na Paulo bazalaki kotalisa bilembo mpe bikamwa oyo Nzambe asalaki kati na bapagano na nzela na bango. 13 Esilisi bango koloba, Jaki alobi boye: «Bandeko boyoka ngai. 14 Simoni atatolaki lolenge nini Nzambe apesaki bapagano ngolu na ntina bapona kati na bango libota mpo na kobulisa nkombo na ye. 15 Maloba ya basakoli malandisami na maye wana, ndenge ekomami: 16 «Sima na maye wana, nakozonga mpe nakotonga mongombo ya Dawidi oyo esila kokufa. nakotelemisa mpe nakokomisa yango sika. 17 Na bongo ndambu ya bato bakoluka Mokonzi pelamoko na bapagano.» 18 Elobi bongo Mokonzi mozalisi na manso seko na seko. 19 Na boye, makanisi na ngai ezali ete tokoki soko moke te kotia mobulu kati na bapagano oyo bayambi Nzambe. 20 Nzoka nde kotalisa bango kokima mbindo ya bikeko, bonsoni, nyama batangisa makila te mpe makila. 21 Uta kala na bileko eleka, ezali na bato na engumba moko na moko bazali koteya mpe kotanga Mose kati na biyanganelo ya bango mikolo yonso ya eyenga. 22 Boye, emonanaki malamu na bantoma mpe bampaka, lisanga na etonga mobimba, kopona Jude oyo abiangami Barbabas mpe Silas, bakambi kati na etonga, kotinda bango na antioche elongo na Paulo mpe Barnabas. 23 Bakomaki boye: «Bantoma, bampaka na bandeko, epai ya bandeko na biso bapagano kati na Antioche, Syrie, mpe Cilicie, mbote na bino! 24 Toyokaki ete bandeko songolo baye topesaki mitindo te, bakumbamaki epai na bino mpe bobululinganisa bino na mateya oyo ekotisaki mobulu na mitema na bino. 25 Na bongo ezalaki na biso banso toyokana kopona bandeko mpe kondela bino bango elongo na balingami Barnabas mpe Paulo, 26 oyo bamibonza mpo na nkombo ya Mokonzi Yesu Chlisto. 27 Totindi mpe Jude na Silas kolobela bino makombo se moko. 28 Elongobanaki na Molimo Mosantu mpe biso, kotindela bino kaka maye oyo elongobani: 29 «Boye boboya makasi, manso babonzeli bikeko, makila, nyama batangisa makila te, mpe bonsoni. Soki bino bokokabwana na manso wana, ekozala malamu mpo na bino. Botikala malamu. 30 Na bongo, bapesaki bango nzela mpe na bokomi na Antioche, basangisaki bato ebele mpe bapesaki bango mokanda. 31 Boye bango kotanga, batondaki na nsayi na bosungami. 32 Jude mpe Silas bo basakoli, balendisaki bandeko na mayike na maloba mpe bakembisaki bango. 33 Kosila bango kolekisa mwa ngonga kuna, bandeko bazongisaki bango na kimia, na baye batindaki bango. 34 Silas ye amonaki malamu ye kotikala moke. 35 Kasi Paulo na Barnabas batikalaki na Antioche elongo na bandeko bayike basusu, kuna batangisaki mpe bateyaki maloba ya Mokonzi. 36 Mikolo mike koleka, Paulo alobaki na Barnabas: «Ebongi na biso kozonga kotala bandeko kati na bingumba binso epai toteyaki maloba ya mokonzi mpe koyeba boni boni bazali kotambola. 37 Barnabas asepelaki batambola elongo na Yoane oyo abiangami Malako. 38 Nzoka nde mpo na Paulo ezalaki malamu te batambola elongo na ye. Ye akabwanaki na bango kobanda Pamphylie mpe atambolaki na bango te na mosala. 39 Makanisi na bango ekokanaki te, na bongo bakabwanaki. Barnabas batambolaki na Malako kino na Chypre. 40 Nzoka nde Paulo aponaki Silas mpe batambolaki elongo sima na bandeko kosengela bango ngolu ya Mokonzi. 41 Akatisaki ekolo ya Syrie mpe Cilicie na kolendisa bitonga.