1 Polo akomaki na Derbe mpe na Lystre, moyekoli moko azalaki wana na nkombo ya Timote, mama na ye azalaki mo Yuda mondimi na Yesu, tata na ye azalaki grec. 2 Bandeko ya Lystre mpe Icone bazalaki kotatola malamu mpo na ye. 3 Polo alingaki kozua ye mpo basala mobembo esika moko na ye. Akamati ye mpe akatisi ye ngenga mpo na ba Yuda oyo bazalaki kofanda na mokili yango mpo batyo nyonso ba yebaki ete tata na ye azalaki grec. 4 Kati na bingumba oyo bazalaki koleka, bazalaki kotalisa na Mangomba mibeko oyo ba ntoma mpe ba mbuta ya Kelusalema ba pesaki bango , mpe ba sengi bango kotosa yango. 5 Mangomba ezalaki kokola makasi kati na kondima na bango, mpe motuya na bandimi ezalaki koluta na likola mokolo na mokolo. 6 Polo mpe baninga na ye bakatisaki mabele na Phrygie mpe na Galati, pamba te Molimo Mosantu apekisaki bango kosakola nsango malamu na Asie. 7 Ntango bakomaki penepene na Mysie, ba mekaki kokende na Bithynie kasi Molimo Mosantu na Yesu apekisaki bango. 8 Balekaki na nzela ya Mysie mpe bakitaki na engumba ya Troas. 9 Polo alotaki ndoto na butu: Amonaki moko ya Macedoine kotelema mpe koloba na ye: «Yaka na Macedoine kosunga biso.» 10 Nsima na Polo komona ndoto yango, mbala to lukaki nzela ya kokende na Macedoine, mpo toyebaki ete Nzambe asili kobenga mpona kosakola nsango malamu na engumba yango. 11 Kolongwa na Troas, tokendaki semba na Samothrace, mpe lobi mosusu tokomaki na Neapolis. 12 Kolongwa kuna tolekaki na Filipe oyo ezali engumba ya Macedoine, oyo engumba eleki motuya ya mboka, mpe tobandaka wana bazali ba Romain. Tofandaki na engumba yango mwa mikolo. 13 Na mokolo ya Sabata, tobimaki na engumba mpe tokendfaki pembeni ya ebale tokanisaki esika malamu ya ko sambela ezalaki kuna. Tofandaki mpe to sololaki ba basi oyo basanganaki na biso. 14 Mwasi moko na kombo Lydie moteki na bilamba na engumba ya Thyatire, oyo azalaki kokumisa Nzambe azalaki koyoka biso. Mokonzi afungolaki motema na ye mpo na kotia litoyi na mateya ya Polo. 15 Ye azuaki libatisi na libota na ye mobimba, sima asengaki biso koloba : «Soki bondimi ete nazali mondimi na Mokonzi boya kolala na ndako na ngayi, nabondeli bino. 16 Ekomaki ete, lokola kozalaki kokende na esika ya mabondeli, elenge muwasi moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ebandaki kolakisa ye makambo makoya. Bakonzi na ye bazalaki kozua mbongo mingi pona mosala na ye. 17 Mwasi yango abandaki kolanda biso na Polo mpe azalaki koganga na koloba: «Bato oyo bazali basali na Nzambe ya likolo. Bazo lakisa bino nzela ya lobiko.» 18 Asali yango mikolo ebele. Kasi Polo alembaki mpe abalukaki na kolobela molimoyango: «Na pesi yo mitindo, na nkombo na Yesu Klisto bima na mwasi oyo.» MPe molimo ebimi na mbala moko. 19 Ntango bakonzi na ye ba moni ete bakoki kozua lisusu mbongo te, bakangi Polo na Silasi mpe bameni bango na zando epayi na bakonzi ya engumba. 20 Ntango balakisi bango epayi ya bazuzi, balobi boye: «Bato oyo baza ba Yuda mpe bazali kobimisa mobulu kati na mboka. 21 Mpe bazali kolakisa bizaleli oyo biso ba Romain topkoki kondima te mpe kosala te.» 22 Ebele na bato ba tombokelaki Polo mpe Silasi, bazuzi bapesi mitindo ete balongola Polo na Silasi bilamba mpe kobeta bango fimbo. 23 Sima ya kotuta tuta bango, ba bwaki bango na boloko, mpe bapesi mitindo na mokengeli ya ya bakangani ete akangela bango makasi. 24 Nsima kozua mitindo , mokengeli ya bakangami akotisi bango na kati na boloko mpe akangisi makolo na bango na libaye monene. 25 Pene pene na midi butu, Polo mpe Silasibazalaki ko kumisa Nzambe na koyemba, bato ya boloko bazalaki koyoka bango. 26 Mbala moko mobele ebandaki koningana makasi penza kino ndako mobimba elingaki kobukana, kaka na ngonga wana bikuke na boloko nyonso mifungwamaki, monyololo na bakangami nyonso ekatamaki. 27 Mokengeli ya ba kangami alamukaki na pongi, emonaki ye ete bikuke nyonso na boloko ekomaki polele, abimisi mopanga na ye mpe alingi komi boma mpo akanisaki ete ba kangami nyonso basilaki kokima. 28 Kasi Polo agangaki na mongongo makasi ete: «Komi boma te, Biso nyonso tozali.» 29 Bongo makengeli ya bakangami asengaki mwinda, akoti mbangu na boloko, mpe afukameli Polo na SIlasi na kolenga. 30 Abimisi bango na libanda mpe atunaki bango ete: « Ba tata, nasala nini mpona bika? 31 Bazongiseli ye: «Ndimùa Mokonzi Yesu, bongo okozua lobiko yo mpe libota na yo.» 32 Polo mpe Silasi babandi koteya ye mpe bato na ndako na ye maloba na Mokonzi. 33 Kaka na ngonga wana na kati na butu, mokengeli ba kangami, amemi bango mpe asukolo ba pota na bango, mpe azui libatisi na ndako na ye mobimba. 34 Ye akotisi Polo mpe Silasi na ndako na ye, mpe apesi bango lileyi, ye mpe lobota na ye batondaki na esengo mpo basili kondima Nzambe. 35 Ntango tongo etani, bazuzi ya ba Romain, batindi bato epayi na mokengeli boloko koloba: « Bimisa bato wana na boloko.» 36 Mokengeli amemeli maloba wana na Polo koloba ete: «bazuzi batindi liloba ete na bimisa bino na boloko sika oyo bo bima mpe bokende na kimia.» 37 38 39 Kasi Polo alobi na bato oyo bazuzi batindaki ete: «Tosambi ata kosamba te, babeti biso fimbo na miso na bato nyonso biso ba Romain. Sima babwaki biso na boloko. bongo sika oyo balingi kobimisa biso na kobombama. Ekoki kosalama bongo te, malamu bango moko baya kobimisa biso. Bakengeli yango bakendaki kolobela bazuzi, ntango bakonzi ya leta bayoki ete Polo na Silasi bazali ba Romain, babangaki. Bongo bazuzi bayaki ko bondela bango ba bima na boloko mpe basengaki Polo na Silasi kobima na engumba na bango. 40 Ntango Polo na SIlasi babimaki na boloko bakendaki kotala Lydie. Kuna bakuti bandeko , nsima na kolendisa bango balekaki.