1 Boye, Agrippa alobi na Paulo: «Okoki koloba mpo na yo moko.» Paulo asemboli loboko mpe alobi: 2 Natondi na esengo, mokonzi Agrippa, mpo na kosamba liboso na yo lelo mpo na makambo bayuda bazali kofundela ngai. 3 Mingi mingi mpo yo ozali moto ya bwanya makasi na oyo etali mituna mpe bonkoko ya bayuda, na yango nasengi na yo oyoka ngai na bokebi penza. 4 Bayuda nyoso bayebi lolenge nini bolenge na ngai elekaki na Yelusaleme mpe na mboka mobimba. 5 Bayebaki ngai kouta ebandeli na ngai na lingomba ya bafarizao, lingomba oyo elandeka na bokebi penza bonzambe na biso mpe bayebi yango malamu. 6 Sasaipi nazali kosamba liboso na yo mpo nazali koluka elaka oyo Nzambe apesaki na batata na biso. 7 Pamba te ezali elaka mabota zomi na mibale bazalaka kozila lokola bazalaki kongumbamela Nzambe butu mpe moyi. Ntina wana, Mokonzi Agrippa, bayuda bafundi ngai. 8 Mpo na nini bozali kondima te ete Nzambe akoki kosekwisa bakufi? 9 Tango moko ngai natelemelaki misala ya Yesu ya Nazareth. 10 Nasalaki yango na Yelusaleme. Nakotisi bandimi ebele na boloko, na lotomo nazwaki epai ya mokonzi ya banganga nzambe, nazalaki kotia mokoloto na molono ya baoyo bazalaki koboma bango. 11 Mbala ebele, nazaki kopesa bango etumbu na kati na biyanganelo na bango, mpe nazalaki kotindika bango na makasi kotiola Yesu. Nazalaki kozwa nkanda makasi mpo na bango, mpe ata na bingumba ya bapaya, nazalaki kokenda konyokola bango. 12 Wana ezalaki ngai kosala boye, nazalaki kokenda Damas, na nkombo mpe mitindo ya bakonzi ya banganga nzambe. 13 Na nzela wana, na midi, Mokonzi, pole makasi koleka ya sanza ekitelaki ngai mpe bato oyo tozalaki kosala na bango mobembo. 14 Tokweyaki biso banso na mabele nde nayokaki mongongo koloba na ngai na monoko ya baebele: «Saul, Saul, mpo na nini ozalo konyokolo ngai? Okokoka kobunda na motonga te.» 15 Bongo natunaki: «Yo nani Mokonzi?» Mokonzi ayanoli: "Nazali Yesu oyo ozali konyokolo." 16 Sikoyo telema! Nabimelaki yo mpo nakomisa yo mosali na ngai mpe nzeneneke ya makambo oyo oyebi likolo na ngai mpe makambo nakolakisa yo na mikolo ezali koya. 17 Bongo nakobatela yo liboso na bayuda mpe bapagano epai nakotinda yo; 18 mpo ofungola miso na bango mpe balongwa na molili mpo bakota na pole. Mpe balongwa na nse ya nguya ya satana mpo bakoma na nse na nguya ya Nzambe. Mpe bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula oyo nazali kopesa na baoyo bakondima ngai" 19 Na yango, Mokonzi agrppa,natosaki emoniseli na Nzambe; 20 kasi na bato ya Damas, ya Yelusaleme, mpe kino na bingumba nyonso ya Yudea, mpe epai ya bapagano, nateyaki bango ete babongola mitema mpe batala epai ya Nzambe, na kosalaka misala ezali kolakisa ete babongoli mitema. 21 Ezali na ntina wana bayuda bayuda bakangaki nagai na tempelo mpo baboma ngai. 22 Nzambe asalisaki ngai kino sikoyo, mpo ete lelo nakoki kotatola liboso na bana mike mpe bakolo makambo oyo basakoli mpe Mose basakolaki, 23 ete Klistu akonyokwama mpe akosekwa kati na bakufi mpe kotatola pole na libota ya bayuda mpe ya bapagano. 24 Lokola Paulo azalaki koumela na koloba, Festus alobi na mongongo makasi: «Paulo, ozali liboma, mayele na yo ebele ekomisi yo liboma.» 25 Paulo alobi: «Nazali liboma te, mokonzi Festus, nazali koteya maloba ya solo mpe ya komikitisa. 26 Pamba te Mokonzi ayebi makambo oyo mpe nazali koteya yango na bopete mpe nazali nakondima ete eloko moko te ezali ya kobombama na miso na ye. 27 Mokonzi Agrippa, «ondimelaka basakoli? Nayebi ete ondimelaka bango.» 28 Agrippa ayanoli: «Paulo, olingi kokomisa ngai moklistu sikawa?» 29 Paulo alobi: «Nazali kosambela Nzambe, se yo te, kasi baoyo nyonso bazali koyoka ngai, ezala na tango mokuse to molai, bakoma lokola ngai; longola bobele minyololo ya boloko. 30 Na yango mokonzi atelemi, bula matari mpe Berenice lokola mpe baoyo nyonso bazalaki wana elongo na bango; 31 tango bakei, basololi bango na bango koloba ete: «moto oyo asali eloko te oyo ekoki komema ye na liwa to na boloko.» 32 Agrippa alobi na Festus: Moto oyo soki asengaki komona Cezar te, mbele totiki ye.»