1 Tango bazwaki mokano ete kokenda Italie, bapesi Paulo na bakangami basusu o maboko ya capitaine ya mapinga ya Auguste, oyo babengi Julius. 2 Tozwaki masuwa Adramyte, oyo esengelaki enana pembeni pembeni ya Asie. Nde bongo tolekela mai monene. Aristarque, moto ya Macedoine ya mboka Thessalonique mpe azalaki na biso. 3 Na mokolo elandi, tosemaki na Sidon, wapi Juluis amonisaki boboto na ye epai na Paulo. Kutu apesaki ye nzela akenda kotala bandeko na ye mpe azwa lisungi epai na bango. 4 Kolongwa wana tokatisaki ebale mpe tokei kosema pembeni na esanga ya Chypre mpo mopepe epikisaki biso kokoma wana. 5 Tango tokatisaki mai oyo ezalaki pembeni na Cilicie mpe Pamphilie, tokendaki na Myra na engumba ya lucie. 6 Kuna, tango capitaine oyo azalaki na biso amoni masuwa ya Alexandrie ezalaki kokenda na Italie, akotisi biso kuna. 7 Tobandaki kokenda malembe malembe mpe ezwaki biso mikolo ebele yambo tokoma pembeni ya Cnide mpo mopepe azalaki makasi. Tozalaki kokenda kaka bongo pembeni pembeni ya mabele ya Crete na ngambo mosusu ya Salmone. 8 Tozalaki kopusana kaka malembe malembe pembeni na ebele ya mikakatano kino tokomaki esika moko babengi Fair Havens oyo ezali pembeni ya cite ya Lasee. 9 Tozwaki tango mingi, mpe eleko ya kokila ya bayuda elekaki, mpe bokatisi ebale ekomaki mabe makasi. Paulo akebisi bango 10 mpe alobi: «Baninga, namoni ete mobembo tolingi kosala ezali mabe makasi, kaka mpo na masuwa mpe biloko te, kasi mpo na bomoi na biso.» 11 kasi capitaine ya basoda ayokelaki ye te. 12 Lokola libongo eazaki malamu te mpo nakolekisa eleko ya malili makasi penza, batambwisi masuwa bayike balobaki tolongwa wana, toluka nzela ya kokoma na engumba ya Phoenix mpo na kolekisa eleko ya malili makasi penza. Phoenix ezali libongo ya engumba Crete, ezali kati kati ya ngambo oyo moyi elalaka. 13 Tango bamoni mopepe ya kimia kobeta, bamemi masuwa; bakanisaki ezalaki ngonga malamu ya kokende. Batomboli longo mpe babandi konana pembeni pembeni na mabele ya Crete. 14 Kasi sima na tango moke, mopepe makasi babengi Euraquilon, euti na esanga ebandi kobeta masuwa. 15 Lokola masuwa ekokaki lisusu kotambola te mpo na mopepe nde totikaki mopepe emema biso. 16 Tolekaki pembeni pembeni ya esanga Cauda. Mpe na pkokoso. 17 Sima ya kokangisa yango na basinga, bazalaki kobanga ete masuwa ekangama na zelo ya mboka Syrte, bazwaki lisusu mokano ete mopepe etambwisa biso. 18 Mopepe etungisi biso mingi nde basali ya masuwa babandi kobwaka biloko na mayi. 19 Na mokolo ya misato, basali na masuwa babwaki lisusu biloko. 20 Lokola moyi mpe minzoto ebimaki te mikolo ebele mpe mopepe ezalaki kaka makasi, tondimaki lisusu te ete tokozala na bomoi. 21 Lokola esalaki ete bato baliaki te mikolo ebele, Paulo atelemaki kati kati ya bato mpe alobi: «Baninga! esengelaki boyoka ngai ete tolongwa na Crete te mpo makambo oyo ekomela biso te. 22 Kasi sasaipi, nazali kobondela bino ete boyika mpiko, pamba te moto moko te kati na biso akufa, kaka masuwa nde ebebi. 23 Na butu ya lelo, anzelu ya Nzambe na ngai oyo nagumbamelaka abimelaki ngai 24 Mpe alobi: «kobanga te, Paulo mpo esengeli osamba liboso ya Cesar mpe tala, Nzambe, na boboto na ye apesaki yo mpe bato yonso oyo bozali kosala na bango mobembo. 25 Yango wana, baninga boyika mpiko, pamba te nazali na kondima na Nzambe ete makambo ekosalama ndenge alobaki na ngai. 26 Kasi esengeli tosema na esanga. 27 Tango tokomaki na butu ya zomi na minei, lokola kotungisama kati ya ebale Adriatique, pembeni ya kati kati ya butu, basali ya masuwa bayoki lokola tozali mosika te na zelo. 28 Bamekaki na banzete, bamonaki ete mozindo ezalalaki tuku mibale ya emekeli ya mozindo, bapusanaki lisusu moke mpe batali, bamoni mozindo ekomaki zomi na mitano. 29 Bakomaki kobanga ete masuwa epanzana, bongo babwakaki longo minei mpo masuwa etelema mpe bazali kosambela ete tongo etana noki noki. 30 Basali ya masuwa bazalaki koluka nzela ya kokima batika masuwa, batiaki bongo bwato liboso ya masuwa koloba ete bazali kobuaka longo, nzoka nde bazalaki kokosa bato mpo bakima na yango. 31 Kasi Paulo alobi na bato mpe na basoda: «Soko bato oyo batikali kati na biso te tokoki kobika te.» 32 Boye basoda bakataki basinga ekangaki bwato na masuwa mpe bwato etiolaki. 33 Tango tongo etanaki, Paul alendisaki bato yonso mpo balia. Alobi: «Lelo tokokisi mikolo zomi na minei uto bobandaki kozela mpe kolia te. 34 Boye, nabondeli bino bolia, pamba te ezali mokolo mpo na lobiko na bino, bongo ata suki ya moto moko ekolongwa te!» 35 Na sima koloba boye, azwaki lipa mpe atondaki Nzambe liboso na bato yonso, abukaki yango mpe aliaki. 36 Bato yonso bazwaki makasi mpe baliaki. 37 Tozalaki bato motango nkama mibale tuku sambo na motoba kati na masuwa. 38 Tango baliaki penza penza, masuwa ekomaki pepele mpo babwakaki ndambo na masangu na ebale. 39 Na tongo, bayebaki lisusu te esika bazali, kasi bamonaki libongo moko ya zelo mpe bazalaki kotuna tuna soko bakokaki kokoma kuna. 40 Boye bakataki longo mpe basundolaki yango kati na ebale. Bobele na tango yango, babongisaki yenda mpe bamatisaki elamba moko liboso ya masuwa mpe bazwaki nzela mpo na kokenda kosema na llibongo ya zelo. 41 Bakomaki na libongo yango, bakutaki bibale mibale ekutana mpe basemaki wana. Na lolenge etelemaki, mbonge ezalaki kobeta yango makasi na sima nde masuwa ebukanaki. 42 mwango ya basoda ezalaki ete baboma bakangami yonso mpo ete moko te akima na nzela ya ebale. 43 Capitaine apekisaki bango pamba te azalaki na mposa ya kobikisa Paulo. Nde apesaki nzela na moto yonso oyo akokaki kokatisa na mayi, asala yango. 44 Nde baoyo bayebi te, bakokatisa bango na mabaya ya masuwa. Nde na bongo tokomaki biso yonso malamu na ngambo.