Mokapo 24

1 Sima ya mikolo mitano, nganga Nzambe Ananias mpe bapaka ya lingomba elongo na molobeli na komnbo ya Tertuelle bakendeki kofunda Polo epayi na balumatari ya engumba wana. 2 Ntango Polo atelemi o bonso bwa bulamatari, Tertuelle abandi koloba: «Ngolu na yo tozui kimia monene mpe ndenge na yo ya kolengela makambo minene mbongwana ya malamu ekoti na kati na engumbqa na biso. 3 Na ebele ya ngolu na yo , toyambi solo bolamu nyonso osaleli bango mpo oleki likolo na nyonso Felix. 4 Ezali na ntina te mpona kolekisa ngonga mpamba te, na sengi na yo oyoka ngayi na limemia nyonso malamu mpenza. 5 To kutaki mutu oyo azali lokola sili mpe azali kotombokisa ba Yuda na kati na mokili mobimba. 6 Amekaki kosumukisa Tempelo mpona yango nde to kan gi ye. 7 Kasi Lysias, mokonzi ya ba soda ayaki kobotola Polo na maboko na biso na makasi nyonso mpe akeyi na ye. 8 Ntangu akotuna ye maye manso, nde okoyeba mpona nini tozo funda ye». 9 Ba Yuda banso bafundi Polo mpe balobi makambo oyo ezali solo. 10 Kasi ntango bulamatali Felix apesi Polo ndingisa mpo aloba, Polo ayanoli boye: «Nayoki ete yo ozali mosambisi monene oyo uta mibu ebele, mpe nasepeli mingi mpo na kosembolela yo ngayi moko. 11 Okoki kotala na balamu mpenza, kala mingi te, bobele nsina mikolo zomoi na mibale na wutaki komata na Yelusalem mpo na kongumbamela Nzamnbe. 12 O tango bakutaki ngayi na kati na Tempelo, naswanaki na mutu te, mpe na tombokisaki etuluku ya batu te, ezala na kati na eyanganelo to na kati ya engumba te. 13 Bazali na maye makoki komonisa yo mabe oyo ngayi nasali te. 14 Na ndimi solo o bosa bwa yo te ngayi na saleli Nzambe ya ba koko na biso na nzela oyo bazali kobenga lelo Nzambe ya bokesene. Nazali na bokebi na manso matali mob eko mpe kati makomi na basakoli. 15 Ngayi na bango to kotia mitema na biso epayi na Nzambe ete batuna nazali na elikia lolenge moko na bango, ntina ya lisekwa ya ba kufi bayengebene mpe batu ya kanza. 16 Yango wana nazali kotiya molende nazala ntangu nyonso motema mpembe na nionso ya Nzambe mpe na miso ya batu. 17 Sima na ba mbula eyike, na zongaki na lisungi mpo na ekolo na ngayi mpe mosala ya mabonza. 18 Ndambu ya ba Yuda ya Asie bakutaki ngayi na ndako ya Nzambe wana esilisi ngayi komibongisa, nazalaki na etuluku ya batu te, to kati ya mobulu te. 19 Bato oyo bamonisa o boso bwa yo maye man so ya mabe oyo ngayi nasalio soko bazali na yango solo. 20 Soki te bato wana baloba maye ya mabe oyo bakuti kati na ngayi o ntangui na sambisami o boso ya esambiselo na yo. 21 Ezala eloko moko oyo na gangaki na mongongo makasi wana ezalaki ngayi na kati na bango :«Ezali na ntina na lisekwa ya bakufi, mpona yango nde nasembi sami na bango?» 22 Felix asosolaki na bolamu nzila ya makambo. Mpona yango azelisaki ba Yuda. Mpe alobi: «Ntangu mokonzi Lysias akoya kowuta na Yelusalem nde nako sambisa makambo na bino.» 23 Mpe apesi mitindo na mokonzi ya mokama ya ba soda na kopekisa soko moke te baninga oyo bakoki kosunga to kotala Polo. 24 Nsima yamua mikolo, Felix azongi elongo na mwasi na ye Drusille oyo moyuda, abengi Polo mpe ayoki ye mpo makambo matali kondima kati na Mokonzi Yesu. 25 Lokola Polo azalaki kosolola na ye na ntina na maye matali bosembo, mpe lolenge ya komibatela nakobengisa yo ntangu mosusu 26 Pela moko ozalaki kokanisa ete Polo akoki kopesa ye mbongo mpona yango nde azalaki kobengisa ye mbala na mbala mpona kosolola na ye. 27 Kasi nsima ya mibu mibale, Porcius Festus akomi bulamatari na esika ya felix. Mpona kosepelisa ba Yuda Felix atikaki nayino Polo na kati ya boloko