1 Paulo atali bajuzi mpe alobi: «Naumeli liboso na Nzambe na bokebi nyoso tii mokolo ya lelo.» 2 Nganga nzambe mokonzi Ananias apesaki mitindo na baye bazalaki pene na ye babambola ye na monoko. 3 Boye Paulo alobi: «Nzambe akobeta yo, yo nde likonzi ya mibeko. Omifandisi mpo na kosambisa ngai kolandisama na mibeko nzoka nde okkobuka mibeko na na kopesa mitindo ete babeta ngai.» 4 Baye bazalaki pene na ye balobaki boye: «Boye nde ozali kotiola nganga nzambe mokonzi? » 5 Paulo alobi: «Nayebaki te bandeko, ete azali nganga nzambe mokonzi. Mpo ekomama: okoloba mabe te na mokonzi na libota na yo.» 6 Tango Paulo asosolaki ete likita ebongisamaki na ba Saduceens mpe epai na bafarizao, atombolaki mongongo oboso ya likita: «Bandeko nazali mofarizao, mwana na mofarizao. Boye mpo ete nazali kozila na elikiya lisekwa ya bakufi, nde nazali kosambisama.» 7 Ngonga ye alobi boye, moto epelaki kati na bafarizao mpe basaduceens, na bongo likita ekabwanaki. 8 Mpo ete basaduceens balobaka ete lisekwa ezali te, banzelu te, ata molimo te; nzoka nde bafarizao balobaka ete manso wana ezalaka. 9 Na bongo botomboki eyingelaki makasi mpe ndambu ya bakomi mibeko na lingomba ya baferizao batelemaki koloba: «Tozwi mabe moko te na moto oyo. Nani ayebi soki molimo to mwanze alobelaki ye?» 10 Ngonga oyo mobulu makasi eyingelaki, Capitaine mokonzi abangaki ete bakoki koboma Paulo, nde apesaki mitindo na basoda bakita mpe bazwa ye na makasi kati na likita na bajuzi mpe kokenda kotia ye na kobe ya mabanga. 11 Butu elandaki, Mokonzi abelemaki pene na ye koloba: «Kobanga te, pelamoko otatolaki mpo na ngai kati na Yelusaleme, osengeli mpe kotatola ngai na Roma.» 12 Ngonga moyi moyingeli, ndambu ya bayuda basalaki likopa mpe balapaki seleka. Bamilobelaki ete bakokila bilei mpe mayi kino bango bakoboma Paulo. 13 Baye babongisaki likopa yango, bazalaki motuya koleka bato tuku minei. 14 Bakendaki komona na banganga nzambe mpe ba mpaka koloba boye: «Tomilakeli mabe makasi na kokila bilei suka suka toboma Paulo. 15 Sasaipi, esengelaki ete likita na bajuzi eloba na capitaine mokonzi bakumba ye oboso bwa bino pelamoko bolingi kokota na mozindo likambo lya ye. Nde biso tobongami koboma ye liboso ete ye akoma awa.» 16 Kasi noko na Paulo ayokaki ete babongisi motambo,na bongoakendaki kokebisa Paulo kati na nkobe ya mabanga. 17 Paulo abengaki moko na basoda ya capitaine koyebisa ye boye: «Kumba elenge mobali oyo oboso bwa capitaine mokonzi, mpo ete azali na maloba ya koyebisa ye.» 18 Na bongo capitaine akumbaki elenge mobali oyo oboso ya capitaine mokonzi koloba boye: «Paulo mokangami, abiangaki nagai mpe kosenga ete nakumba elenge mobali oyo oboso bwa yo, azali na maloba ya koyebisa yo.» 19 Capitaine mokonzi azwaki ye na loboko mpe akendaki na ye na nkuku kotuna ye: «Nini ozali na yango ya koyebisa ngai?» 20 Elenge mobali ayanolaki: «Bayuda babongisaki kosenga yo kokumba Paulo lobi oboso ya likita pelamoko bazali na mposa ya kokota na mozindo bososoli ya likambo na ye. 21 Kasi komitika te, mpo ezali na motuya na bato koleka tuku minei oyo basili kobongisela ye motambo. Bamilakeli mabe likolo na bango mei, mpe bazwi mokano ya kokila bilei mpe komela, kino bakoboma ye. Sasaipi bamibongisi kozila bobele ndingisa na yo.» 22 Na bongo capitaine mokonzi akabwanaki na elenge mobali oyo na ndingisa eye: «Koloba na moto te maye oyebisi ngai.» 23 Na bongo abengaki ba capitaine mibale mpe koyebisa bango:«Bongisa nkama mibale ya basoda mpo ya bokei na mboka Cezaree, elongo na tuku sambo ya bamemi mpunda, mpe nkama mibale ya babeti matimbo. Bokolongwa na ngonga ya tuku mibale na moko.» 24 apesaki lisusu mitindo ete babongisa ba nyama baye bakokumba Paulo ete akoma nzoto kolongonu epai Bula matari Felix. 25 Akomaki mokanda boye: 26 «Ngai Claude Lysias epai ya mokonzi monene ya lokumu bula matari Felix, losako! 27 Moto oyo akangamaki na bayuda, azalaki solo mokufi na ngonga ena, nde natindaki basoda mpo na kobikisa ye, kolanda sango ekomelaki ngai ete azali moko wa Roma. 28 Esengelaki na ngai koyeba ntina nini bafundaki ye, na ngonga nakumbaki ye oboso ya likita ya bango. 29 Boye nayoki ete afundamaki na maye matali mibeko mia bango. Nzoka nde ata nkokoso moko ezalaki te kopesa ndingisa ya kufa to bokangami na boloko. 30 Mpe tango nazwaki sango ete basalelaki ye likita mabe, nazwaki ndingisa ya botindi ye na lombango epai na yo, na boyebisi bafundi ye kotaliisa oboso na yo nkokoso nyoso bazwaki na ye. Tobwani!» 31 Basoda batosaki mitindo: bakumbaki Paulo kati na butu na mboka Antipatris. 32 Mokolo elandaki, basoda bayike batikelaki bamemi mpunda mokumba, mpe bazongaki na nkobe ya mabanga. 33 Na boyingeli na bakumbi mpunda o mboka Cezaree, bapesaki bula matari mokanda elongo na Paulo. 34 Bongo bula matari atangi mokanda, atunaki soko Paulo azaliki moto ya etuka nini? Tango ye ayebaki ete azali mowuta ya Cilicie, 35 alobi: «Nakoyoka yo na mozindo eleko bafundi yo bakoyingela awa.» Na bongo, apesaki mitindo kobomba ye kati na ndako ya Herde.