1 Ba ndeko mpe ba tata, boyoka oyo nazali na yango pona koyebisa bino. 2 Tango ba monaki ete Polo koloba na monoko ya ba hebreux, ba fandi kimia mpe alobi: 3 «Nazali moyuda, na botama na Tarse na Cilicie, nayekolaki na engumba oyo, nase ya Gamaliel. Balakisi ngayi mibeko ya ba tata na biso, na kati na kpomikebisa , nazali na molende mpo na Nzambe ndenge kaka bino bozali lelo. 4 Na telemelaki lingomba oyo pene na kufa, nakangaka basi mpe mibali, basinga mpe nabuakaki bango na boloko. 5 Na yango nganga Nzambe mokonzi mpe ba mpaka nyonso bakoki kotatola mpona nga egte ba pesaka nga mikanda mpona bandeko ya Damas. Nakende kokanga ba oyo bazali na lingomba wana mpe naya na bango na Yelusalem na minyololo 6 Esalamaki ete wana ezalaki ngayi na nzela pona kokoma na Damas, na mpuasa pembeni ya midi, mpole makasi engengeli ngayi 7 Nakweyaki na mabele mpe nayoki mongongo elobaki na ngayi :«Saul, Saul, pona nini ozali konyokola ngayi?» 8 Na yanoli: «Yo nani Mokonzi?» Azongisi ete: «Nazali Yesu ya Nazareth oyo ozali konyokola» 9 Ba oyo bazalaki na ngayi bamonaki pole, kasi bazalaki koyoka mongongo te. 10 Na lobaki: «Mokonzi esengeli nasala nini?» Mokonzi alobi : «Telema, kota na Damas, kuna bakoyebisa yo nyonso oyo osengeli kosala.» 11 Mpole wana ebomaki ngayi miso, nakokaki komona lisusu te, nde bamemaki ngayi komema na bato nazalakina bango. 12 Kuna na kutanaki na Ananias, moto na sembo kolandama na mibeko, Ba yuda nyonso ya Damas bazalaki kotala malamu mpo na ye. 13 Ayaki liboso na ngayi, pe alobi: « Ndeko Saul banda lisusu komona.» Na mbala moko, namoni. 14 Bongo alobi: «Nzambe ya ba tata na biuso aponaki yo mpo ete oyeba mokano na ye. Mpe omona moyengebene, mpo oyoka maloba ma wuti na monoko na ye moko.» 15 Okotatola liboso na bato nyonso makambo oyo yo omonaki. 16 Sasayipi, ozali kozela nini? Telema mpe zua libatisi mpo masumu na yo malimbisama na kombo na ye.» 17 Tango nazongi na Yerusalem, wana ezalaki ngayi kosambela na Tempelo, Molimo ezuaki ngayi. 18 Nayo kaki ye koloba na nga: «Bima noki na Yelusalem mpo bakondima litatoli na yo te, na ntina na ngayi». 19 Na lobi :«Mokonzi, bayebi bango moko ete na buakaki bato na boloko mpe na betaki ba oyo nyonso bazalaki ko ndimela yo fimbo. 20 Nazalaki esika oyo bazalaki ko bomela Etienne nzeneneke na yo, ngayi moto na pesaki nzela mpz kokengela bilamba na bango. 21 Kasi alobi na ngayi: «Bima, mpo na kotinda yo epayi ya ba pagano.» 22 Kino esika oyo ba yo kaki ye, kasi ba badni ko nganga makasi mpe balobi: «Moto ya boye abongi na bomoyi te! Bo boma ye!» 23 Bazali ko nganga makasi, kobwaka bilamba mpe putulu likolo. 24 Tango capitaine mokonzi amonaki bongo, apesaki mitindo ba kotisa Polo na boloko. Mpe alobaki ba sambisa ye na fimbo mpo ye moko ayeba mpona nini bato ba ngangaki ndenge wana. 25 Na tango ba kangaki ye basinga, Polo alobi na Centrurion oyo azalaki wana : « Bakoki ko beta fimb o makasi na moto yo azali moto ya akolo Rome yambo ya kosambisa ye to mpe kokatela etumbu?» 26 Moto yango akeyi ko tuna Capitaine mokonzi boye:« Likambo nini olingi kosal? Moto yango azali moto na ekolo Rome. 27 Capitaine mokonzi akeyi kotuna ye soki ya solo moto ya ekolo ya Rome? Polo alobi: «Iyo». 28 Mokonzi ya ba soda alobi: « Nafutaki misolo ebele mpo nazua mukanda ya moto na Rome.» Kasi Polo alobi: «Ngayi nabotama moto ya Mboka Rome.» 29 Capitaine mokonzi mpe bato bazalaki boteta ye babangaki mpo bayoki ete Polo azalaki moto ya mboka Rome.» 30 Lobi na yango, lokola capitaine mokonzi alingaki koyeba solo ya likambo yango. Olongoli Polo minyololo mpe apesi mitindo na ba nganga Nzambe mpe ba mpaka ya lingomba na sangana. Abengisaki mpe Polo na kati na bango.