1 Nsima ko kabwana na bango, tokoti masuwa mpe tozui mbala moko nzela ya engumba ye Cos, mpe sima ya mokolo moko tokomaki na engumba ya Rhodes, kolongwa wana kokeyi na engumba ya Patara. 2 Tango komoni masuwa kokende na Phenicie, to mataki mpe tokendaki. 3 TAngo kokomaki pene pene na esanga ya Chypre, to kikaki yango na loboko ya muasi, tolandi nzela ya Syrie mpe tokitaki na Tyr, po ete eza wana nde masuwa elingaki kobimisa biloko. 4 Sima tomonaki moyekoli moko, to tikala wana mikolo sambo. bayekoli wana balobi na Polo, na Molimo, ba kende Yelusalema te. 5 Tango tokomaki na suka na mikolo an biso, tolongwaki mpe to kobaki mobembo na biso, bakendaki kotika biso ti na mandelo ya mboka. Sima kotiaki mabolongo na biso na se, tosambelaki mpe to pesanaki ba mbote ya suka. 6 Tokoti na masuwa, mpe bango bazongaki epayi na bango. 7 Tango tosilisaki mobembo na biso na Tyr, tokomaki na Ptolemais. Wana topesaki mbote na ba ndeko tolekisaki mokolo moko na bango. 8 Tolongwaki mokolo elandi, mpe tokendaki na Cesare. Tokotaki na ndaku ya Filipe, moteyi na sango malamu, oyo azalaki moko ya sambo mpe totikalaki na ye. 9 Nzoka nde moto oyo azalaki na bilenge moseka mineyi oyo bazalaki kosakola. 10 Tangu kozalaki wana mikolo ndambu, mosakoli moko na kombo ya Agabus akiti na Judee. 11 Aye yi epayi na biso mpe azui makaba na Polo. Ami kangi makolo na maboko mpe alobi: «Boye elobi Molimo Mosantu: « ezali na lolenge oyo nde ba Yuda ya Jelusalema ba kokanga mukolo mobaka oyo mpe kopesa ye na maboko ya ba pagano.» 12 Tango toyokakai makambo wana, biso na bato ya mboka tobondeli Polo akenda na Yerusalema te. 13 Na yango Polo alobi: «Bozo sala nini, nako lelaka mpe bokuka ngayi motema? Mpo ete nabongisami kaka te mpo na kokangama, kasi po na ko kufa mpe pona kombo na Mokonzi Yesu.» 14 Lokola tokokaki kobongola na kanisi na Polo te, totikaki kobondela ye, mpe tolobi: «Tika ete mokano na Mokonzi ezala na yo.» 15 Namokolo wana tomilengelaki mpo na komata na Yelusalema. 16 Bayekoli ndambu ya Cesare bayaki na biso. Mamemaki na bango, moto ya Chypre, boyekoli moko ya kala, totikalaki na ye. 17 Tangu tokomaki na Yelusalema, ba ndeko bayambaki biso na ese ngo. 18 Lobi na yang, Polo akendaki elongo na biso epayi ya Zaki; ba mbuta nyonso bazalaki wana. 19 Sima na kopesa bango losako, abandaki kososolisa bango makambu nyonso Nzambe asalaki na kati ya ba pagano na nzela na lotomo na ye. 20 SIma ya koyoka Polo, ba tondaki Nzambe nako loba: «Omoni ba ndeko koto na koto bandimi na kati ya ba Yuda. bango nyonso bazali kotosa mibeko na motema moko. 21 Bayokaki ete yo ozalaki koteya ba Yuda nyonso oyo bazalaki ko fanda na kati ya ba pagano basundola Mose ete oyebisi bango ba kata bana na bango genga te, mpe ba landa lisusu bizaleli ya ba Yuda te. 22 Toko sala nini? Ya solo bakoyoka ete osili kokoma awa. 23 Sala oyo tozali koyebisa ye sika oyo: tozali na batu mineyi awa oyo balapi ndayi. 24 Zua bango bomi petola mpe futela bango mpo ba palola bango suki. Na yango bango nyonso bako yeba makambo oyo balobaki na tina na yo ezali lokuta. Ozali kotosa mibeko ya Mose. 25 Kasi mpona likambo ya ba pagano oyo ba ndimeli Mokonzi, tokomi mikanda mpe topesi mitindo oyo basengeli komi benda na makambu ya mbeka ya ba bikeko, na makila, na ba nyama oyo babomaka mpo bapesa ba nzambe ya bikeko, to oyo babomaka na kofina kingo ma yango, mpe ba posa ya nzoto ya mabe. 26 Na yango, Polo amemaki bato mineyi yango, lobi na yango ba petolami mpe bakeyi na Tempelo, mpe koyebisa eleko ya mokolo ya ko petolama tii mabonza esalama po na moko na moko. 27 Tango mikolo sambo esilaki, ba Yuda mususu ya Asie bamonaki Polo na Tempelo mpe batindi bato nyonso ba tombokela ye, mpe abakangi ye. 28 Bazalaki ko ganga: « Baya bato na Israel kosalisa biso! Tala moto oyo azo lakisa esika nyonso na batu nyonso makambu oyo eza kokokana te na mibeko ya Mose, mpe akotisi ba grecs na tempelo mpe asili kotiya esika petwa bosoto.» 29 Liboso, bamonaki Trophine moto na Ephese na ye na engumba , mpe bakamisaki Polo asili kokotisa ye na ndako ya Nzambe ya ba Yuda. 30 Engumba mobimba ezalaki na yikiyiki, mpe bato nyonso ba ye ko kanga Polo. Babimisi ye libanda na Tempelo mpe bakangi mbala moko bikuke. 31 Lokola bazalaki koluka ko boma Polo, sango ekomaki epayi ya mokonzi ya ba soda ete mobulu ekoti na Yelusalem mobimba. 32 Kaka na ngonga yango akamati ba soda mpe bakonzi na bango, bakeyi mbango esika bato batondaki. Ntango bato ba moni ba soda na ba konzi na bango batikaki kobeta Polo. 33 Bongo bakonzi ya ba soda bapusanaki mpe bazui Polo, mpe bapêsi mitindo ba ete bakanga ye na minyololo mibale. Batuni soki azalaki nani mpe nini asalaki. 34 Kasi moto na moto abandaki ko ganga na ndenge na ye. Na yango, mokonzi ya ba soda azuaki eyano moko te likola ya biloba loba nyonso wana, apesi mitindo ba mema Polo na kuna esika ba soda ba fandaka. 35 Kokoma na bango na wenze, ba soda ba memaki ye mpona kanda ya bato. 36 Po bazalaki ko ganga: « Bo boma ye!» 37 Ntango balingaki kokotisa Pola na ndako ya ba soda, ye alobi na mokonzi ya ba soda: « Na koki kozua ndingisa ya kolobela eloko moko?» Mokonzi ya ba soda a tuni ye: «Olobaka grac?». 38 Oza moto ya Egypte te oyo akotisaki mobulu na mikolo eleki mpe atombokisaki bato koto mineyi na esobe?» 39 Polo alobi: «Nazali mo Yuda ya engumba Tarse na Cilicie. Nazali moto ya motuya na engumba. Na bondeli yo pesa nga nzela na lobela bango.» 40 Tango mokonzi ya ba soda apesi ye ndingisa, Polo atelemi mpe atomboli maboko. Tangu kimia makasi ekoti, alobeli bango na munoko ya ba Hebreu. Alobi: