1 Tango mululu esilaki, Polo asangisi bayekoli mpe alendisi bango apesaki bango mboté mpe akendaki na Macedoine. 2 Akatisaki ba engunda mpe azalaki ko lendisa bandimi kati na kosanzola Mokonzi, ye akendeki na grece. 3 Afandaki kuna sanza misato, tango alingaki kokota masuwa mpo akende na Syrie, ayikaki bayuda bazalaki kokana ye, azui mokano ya kozonga na nzela ya Macedoine. 4 Sopater mwana na Pyrrhus mojto na Bérée, akendaki nzela moko naye,bango na Aristarque mpe Second bato na Thessalonique, Gaïus ya Derbe, Timoté , Tychique et Trophime bato ya d'Azia, ba kendeki elongo na bango. 5 Bato yango batiki biso mpe ba kei kozela biso na Troas. 6 Sima na yango, tokoti na masuwa na Philippe nsima na mikolo mitano to yei kokuta bango na Troas, kuna tozalaki mposo mobimba. 7 sima na mikolo ya kopema, tosanganaki esika moko mpona kolia mpe polo azalaki kosakola epaï na bato ya Troas kino midi na butu, mpe ekokiye akende lobi yango. 8 Tozalaki na eteni ya ndako ya likolo mpe lmuinda mizalaki mingi. 9 Elenge mobali moko nkombo naye Eutychusn afandaki koyoka pongi makasi, tango Polo azalaki koteya, akweyaki kolongua likolo na ndaku na eteni ya misato, kino na nse, mpe akufaki wana wana. 10 Polo akitaki mpe alalelaki ye likoloasimbaki maboko naye mpe alobaki: « Bobanga lisusu te ye azali na bomoï». 11 Sima Polo amati lisusu na etage aliaki mapa mpe azongelaki koteya kino ebandeli ya mokolo. 12 Ba yaki na elenge mobali ya go na bomoï, mpe mawa na bato esilaki. 13 Pona biso to longwaki liboso na Polo kokota na maswa kokende na engumba ya Assos, kuna tokendaki kokutana na Polo. 14 Tango akuti boiso na Assos, tokamati ye na masuwa mpe tokeyi Mytilene. 15 Nasima na wana, tokomaki na esanga ya Chios. Nsima na mokolo moko tokomi na esunga ya Samos, mpe lobi yango tokomi na Milet. 16 Boye Polo akanisaki ete akoleka na Ephese, mpo alingaki kolekisa ntango te na Azia, yango alingaki koleka noki na mpo akoma na Jerusalem mokolo na Pentecote. 17 Na Milet Polo atindaki maloba na ephese kobenga ba mpaka ya lingomba. 18 Ntango bakomi epaï naye, alobaki na bango boyeli ndenge nini, bizaleli nangaï ezalaki kati na bino, banda mokolo ya liboso nayaki na Azia. 19 Nasalelaki mokonzi na motema ya komikitisa, elongo na mayi na miso mpe kati na matata oyon na zuaki na banyuda. 20 Boyebaki ete na bombaki likambo moko te, mpe lolenge na teyaki b ino kati na ba ndaku na bino. 21 Na biangaki bayuda mpe ba Grecs ete ba bongola motema, konzonga epaï na Nzambe kodima mokonzi Yesu. 22 Sika oyo na Keï na Jeruzaleme ndenge molimo mosanto atindi ngai, nayebi te eloko nini ekokweyela ngai . 23 Molimo mosanto azali koyebisa ngai ete na mboka moko, boloko mpe minyokoli ezali kozela ngai. 24 Kasi nazali kotala bomoi ;okola eloko pamba, mpo na lingi kosilisa mosala oyo monkozi apesi ngai, kosakola nsango malamu na ngolu na Nzambe. 25 Na lekaki katkati na bino, nyonso kosakola bokonzi na Nzambe. 26 Mpona oyo nayebisi bino lelo, soki moto moko abungi nzela, ezali lisusu likambo nangai te. 27 Mpo ete nabombelaki bino ata likambo, ata moko te na oyo etali mokano na Nzambe. 28 bomikengela bino penza mpe bondimi oyo molimo mosantu asili kotia na maboko na bino, bo batela lingpmba na Nzambe, oyo asombaki mpona kufa ya mwana naye Yesu. 29 Bayebi ete nsima na n gai kolima awa, bato mabe bakobima kati na bin, mpe bakopenguisa ba ndimi. 30 Nayebi ete kati na bino bato mosusu ya lokuta bakobima, mpe bakobenda bandimi epai na bango. Bozala ekenge, bokanisa ete mbula misatu butu na moyi na mai na miso. 31 Nazalaki kaka kopesa toli na moko na moko na bino. 32 Sik'oyo napesi bino na maboko na Nzambe mpe maloba na ye ya nguya ya kopesa bino bokasi, mpe epesa bino libula lisanga na bato nyonso babulisami. 33 Nalulaki mbongo ya moto te, wolo ya moto te, to mpe bilanga ya moto moko te. 34 Bino moko boyebi ete na salaki na maboko na ngai mpona kozua biloko oyo ngai mpe baninga nangai tozalaki na posa na yango. 35 Na nyonso na pesaki bino ndakisa ete nde okoki kosunga bato botawu, mpe esengeki kokanisa maloba na ya Mokonzi Yesu oyo Yesu ye moko alobaki: esengo na mopesi aleki mozui. 36 Sima na maloba oyo, Polo afukamaki elongo na bango mpe banbondelaki . 37 Bango nyonso bazalaki kolela, bayambi Polo mpona kopesaye mbote ya suka. 38 Bango bazalaki na mawa mpe Polo alobaki bakomonana lisusu te, bango bakei kotika ye na masua.