1 Esalamaki ete wana Apollos azalaki na corinthe, Polo azalaki kotambola na ba engamba kuna na ba ngomba mpe akomaki na ephese kuna akuti mwa ndambo ya bayekoli. 2 Polo atuni bango: « boyamabki molimo mosantu tango tango bondimelaki?» Bazongisi ete: «Te! nanu toyoka kutu lisolo ya molimo monsantu te». 3 Polo alobi: « bino bozuaki libatisi nini?» bazongi maloba ete " libatisi ya Yoane". 4 Bongo Polo alobi lisusu: « Yoane apeski libatisi ya kobongola motema, azalaki koteya bato ete bandimela na oyo azalaki koya sima naye: Yesu Kristo.» 5 Wana bayoki bongo, bazui libatisi na kombo na mokonzi Yesu. 6 Tango Polo atieli bango maboko molimo mosantu Akiteli bango bango mpe ba bandi koloba na minoko mosusu mpe kosakola. 7 Bango nionso mibali zomi na mibale. 8 Polo akotaki na eyanganelo mpe kuna azalaki koteya na mpifo pene ya sanza misato. Azalaki kokamba malakisi na kondimisa bato na makambo etali bokonzi ya Nzambe. 9 Kasi ba yuda oyo baboyaki kobongola motema ba bandaki ko tiola sango ya kristo liboso na bato, Polo na bayekoli ba longwe wana mpe bakeyi mosika na bango. kuna azalaki ko teya liloba mikolo nionso na eteyelo ya Tyrannus. 10 Mosala yangoewumelaki mbula, mpe esali ete bato nionso bavandaki na Azia, ba yuda mpe ba Grecs, bayokaki liloba ya Nzambe. 11 Nzambe azalaki kosala misala ya kokamwa na nzela na Polo. 12 babeli bazalaki kobika mpe milimo mabe ko bima na banzoto na bato wana bazalaki kozwa bilamba na bango kopakola na nzoto na Polo mpe ba kopakola na nzoto na bango. 13 ezalaki na nganga kisi ya yuda bazalaki lotambola tambola na engumba, na kosalela kombo na Yesu na ndenge na bongo. bazalaki ko belela nkombo na Yesu likolo na bakangemi na milimo mabe koloba ete: « na mitindo na ngayi, na nkombo na Yesu oyo Polo azali koteya, bima!». 14 Ba nganga kisi yango bazalaki sambo mpe bazalaki bana ya nganga Nzambe mokonzi ya bayuda Scéva. 15 Molimo mabe ayanoli bango boye: « ngayi nayebi yesu mpe Polo, kasi bino ba nani?». 16 Molimo mabe ezalaki na kati na moto ekweyi na bango mpe abeti bango makasi na lolenge ete bakimi nde kokima na ndaku yango bolumbu mpe bazoki zoki. 17 Likambo yango eyebana na bato nionso bazalaki na ephese, bayuda mpe ba Grec 18 mpe ebele ya bandimi ba sosoli mpe ba tubelaki makamlbo mabe bazalaki kosala. 19 Mingi kati na bandimi ba oyo basimbaki ba kisi bayaki kozongisa ba buku ya kisi yango. Motuya ya ba buku yango koto tuku mitanu, mpe batimbaki ba buku yango na miso ya bato. 20 Nayango, sango malamu epanzanaki makasi na nguya nionso . 21 Boye sima na kosilisa musala na Ephese, Polo azui ekateli na lisumu na molimo akende na Jerusalem. Kasi asepelaka koleka nainu na Macedoine mpe na Achaîe, sima amilobin esengeli na koma mpe na Rome. 22 Polo atindaki mibake ya bayekoli naye na macedoine, Timothée mpe Eraste, bato bazalaki kosunga ye mpe ye atikalaki nainu na Azia mpona mwa tango. 23 Naeleko yango, mobulu makasi ebimaki na Ephese na ntina na sango malamu. 24 Mosali mpe moteki moko ya bikeko ya bikeko ya wolo na kombo ya Demetrius azalaka kosala bikeko ya palata ya Diane mpe ezalaki kopesa mosolo ebele na baninga naye. 25 Na bongo esangisaki ba ninga na ye mpe alobi : "ba tata, boyebi ete na mosala oyo nde tozali kozua misolo ebele. 26 Bozali na boyibi solo ete kaka awa na ephese te kasi pene na Azia mobimba Polo oyo andimisi mpe abongolisi bato ebele. Alobi ete baNzambe basalami na maboko na bato bazali ba Nzambe te. 27 Likama ezali ete kaka te misala ba baso ekokweya kasi na tempelo 28 Tango bayoki bongo, ba tondi na kanda makasi, mpe ba bandi konganga ete: " azali monene Diane ya ba ephesien!". 29 Bulu yeke ekoti na engunda mobimba. Bato bakimi mbangu bakeyi kokoya ta na ndako ya masano. ba kangaki baninga mibale ya Polo ba oyo bawutaki na macedoine, Gaïus mpe Artistarque. 30 Polo azalaki na mposa ya kokota kuna kasi ba yekoli ba pekisakiye. 31 Bokye ndambo ya baninga ya Polo ba oyo bazalaki bakonzi ya ba soda ya engunda batindeli ye maloba ete akende ko kota kuna te. 32 Bulu yeke ezalaki kati na bango mpe mingi kati na bango bayebaki te ntina nini ba kangaki mpo etuluku na bato mosusu bazalaki ko nganga mpona likambo oyo, mpe ndambo mosusu pona likambo wana . 33 Bayuda ba bakangaki Alexandre mpe batiye liboso na bato. Tango Alexandre atombolaki loboko mpona kopesa ndimbola, 34 Na tango basosoli ete azalaki moyuda, bangangaki bango nionso elongo na mongongo moko pene ya ngonga mibale ete: "azali monene, diane ya ba Ephesien". 35 Tango Mokonzi ya ba soda ya engunda akitisi makele wana, alobi: « bino ùbaningan ya Ephese! nani ayebi ete Ephese nde ezali moboko ya tempelo ya diane mpe elili oyo ewuta na lola?» 36 lakola ezali likambo ya kobeta tembe te, esengeli bo fanda kimia mpe bosala likambo na mbangu mbangu te. 37 Pamba te bofundi bato oyo bazali ba miyibi na tempelo te mpe batioli ya Nzambe na biso te. 38 boye, soki ya mosala ba Demetrmius mpe ba ninga naye ya mosala ba moni mbeba na moto moko, bazuzi mpe zuza mokonzi bazala ba funda ye. 39 Kasi soki ezali likambo etali musala na bino, yango ekobongisama na mayangani ya mikolo na mikolo. 40 Pamba te bakoki kofunda biso na mbeba ya kotombokisa bato 'buluyeke oyo ezali na ntina te mpe tokozanga maloba ya koloba". 41 Tango alobi bongo, azongisi moto na moto epayi naye.