Mokapo 9

1 Nazali nsomi te? Nazali ntoma te? Namonaki Yesu mokonzi na bino te? Bozali bana na ngayi te kati na mosala na Mokonzi? 2 Soki po na basusu nazali ntoma te, po na biso nazali, po bozali elembo ya lotomo na ngayi kati na Mokonzi. 3 Bongo nde nayanolaki bango bafundaki ngayi. 4 Tozali na makoki ya koliya mpe komela te? 5 Tozali na makoki ya kobala muasi mondimi te, lokola ba ntoma mosusu bazo sala, na ba ndeko na kati na Mokonzi, na Cephas? 6 Ezali kaka Barnabas na ngayi nde esengeli tosala? 7 Soda nini oyo azanga bakambi? Moloni ya masungu akolia yango te? Mobokoli ya bangombe akomela miliki te? 8 Bomoto nde ezali kolobisa ngayi? Mibeko elobi bongo pe te? 9 Na mibeklo ya Mose ekomani boye: «Kokanga monoko ya ngombe tango azali kopasola mbuma te» Nzambe pe azali koba tela ngombe? 10 Azali kolobela biso te? Ekomama pona biso , mokati elanga esengeli azala na elikia pe oyo azali kopasola mbumba azala pe na elikia yako buka mbumba. 11 Soki toleyisaki bino mbuma na molimo tosali mabe soki bokabeli biso biloko na bino? 12 Soki basusu bazali na makoki likolo na bino, bon go biso te? Ata bongo tosengaki bino te, kasi tokembaki po totiya mobulu na sango malamu ya Klisto te. 13 Boyebi ete baye basalaka na ndako na Nzambe pe baye basalaka na etumbelo baliak pe na etumbelo. 14 Ndenge moko pe, Mokonzi apesaka mitindo: Ba panzi ya sango malamu, bakolia na mosala na bango. 15 Kasi natikala kosenga makoki ngayi te. Nazali kokoma te mpo bopesa ngayi mabonza. 16 Soki nazali kopanza sango malamu, ezali po na komikwa te, esengeli mosala bongo. Mawa na ngayi soki nateyi sango malamu te. 17 Soki nasali na motema esengo nde nakozua lifuti kasi soki bongo te, nazali tango yonso na mikumba oyo nazuaki. 18 Wapi lifuti na ngayi? Soki nateyi sango malamu, ebongo nazela eloko te, pe nasenga makoki na ngayi ya sango malamu te. 19 Atako nazali nsomi na makambo yonso, nakomi mosali ya bato yonso, po nazua bato mingi. 20 Pona ba Yuda, nakoma mo Yuda, po na benda ba Yuda, epayi na baye batosaka mibeko na koma mpe lokola bango, po nabenda batosi mibeko. Nasalaka bongo ata nazali motosi mibeko te. 21 POna baye batosaka mibeko te, nakoma pe lokola bango, kasi nazali na nse ya mibeko ya Klisto. Nasalaka boye po nabenda baye bazali kotosa mibeko te. 22 Po na batu ya botawu, namikomisaka pe muto ya botawu pona longa bango. Nakomaka bongo pona bato yonso pona bikisa eteni ya bato. 23 Namipesaka pona sango malamu po ete ngayi pe na pambolama. 24 Boyebi ete bapoti mbango yonso nde balongaka te? Kaka se moko bino pe bopota pona kozua lifuti. 25 Moto ya masano yonso atosaka mibeko ya ngalasisi wana po azwa mbano ya tango moke, kasi tozali kopota pona kozua motole ya bomoyi. 26 Tina wana nazali kopota bulubulu te, po nasala mosala ya punda te. 27 Nazali konyokolo nzoto na ngayi lokola moumbu, po na sima ya koteya basusu, ngayi moko nakotana te.