1 Sika oyo na makambu etali banyama oyo ba bonzelaka bikeko, biso nyonso tozali na mayele. Bo yebi na biso ekomisaka biso lolendo , bolingo nde etongaka. 2 Soki moko na bino akanisi ayebi eloko, moto wana ayebi nayino te, alingi nde ayeba. 3 Kasi soki moto alingi Nzambe, moto wana ayebani na Nzambe. 4 Na boye na makambu etali kolia moto akoki kolia ntama oyo ba bonzeli bikeko, toyebi ete « na mokili , nzambe ya ekeko, aza pamba» mpo Nzambe aza kaka moko. 5 Atako ba nzambe na bango bazali, soki na likolo to na mabele, lokola banzambe baza ebele na bakonzi. 6 Kasi po na biso, Nzambe aza kaka moko, Tata, na ye nde nyonso eyaka, po na ye nde kozo bika, Mokonzi moko , Yesu Klisto, na ye nyonso ezalisami pe na ye nde tozali.» 7 Bato nyonso bazali na boyebi wana te, ba mosusu bazali kogumbamela bikeko ti sika oyo, pe bazali kolia ba nyama oyo ba bonzelaki na nzambe ya bikeko. Boye mayele na bango ebebi po ete bazali na botawu. 8 Nzokande bileyi eko lakisa biso Nzambe te. to petolami te soki to boyi koliya yango pe to petolami te soki tolie yango. 9 Bo sala keba bosomi na bino ekoma libaku na baye bazali na kondima moke (Boyebi moke). 10 Ndakisa moto moko azali na boyebi bamoni ye azali koliya ba nyama na ndako ya banzambe ya bikeko moto oyo amoni ye epayi na batawu ya mayele ya bomoto ekotinda ye te? Aliya nyama ebonzami na bikeko? 11 Na bongo yo moto ozali na boyebi ya makambo ya banzambe ya bikeko okweyisa ndeko na yo na boyebi moke te, oyo Klisto akufelaki, abeba. 12 Na bango soki osali ndeko na yo mabe pe otutisi ye libaku na bozangi makasi na motema na ye, asumuki epayi na Yesu. 13 Yango wana soki bileyi ekomi libaku na ndeko na ngayi, nakolia lisusu nyama te, po epesa nzela na ndeko na ngayi te akweya.