1 Soki moko na bino aza koswanisi moninga akokende na esambeselo na bapagano to akokende na bandimi? 2 Boyebi ete bandimi bakosambisa mokili? Soki bokosambisa mokili, boki kosambisa makambu ya mike ezoleka na eklesia? 3 Boyebi ete boko sambisa ba anjelu? Ndenge nini bokoki kosambisa makambo nyonso ekoyela bino na eklesia? 4 Soki bozo sambisa makambu ya balabala ya mikolo nyonso, pona nini bokoki kotiya baninga na esika na bango te na ba oyo baza na eklesia? 5 Naza kolobela bino pona soni na bino Ezali na mutu kati na biso oyo mwa bwanya akoki kokata makambu kati na bino bandeko ya eklesia? 6 Lolenge makambu ezo leka, mondimi afundi moninga na ye mondimi na maboko ya mopagano 7 Lolenge koswana eza makasi kati na bino bandimi ezali elonga te mpona bino. Pona nini bokoki konyokwama te muto akweyi te? Pona nini bozo ko mikosa 8 Kaka koluka kotiya matata na esika akoki kotiaya makelele te? Nzokande bazali na ndeko na bino! 9 Boyebi te kozanga sembo ekozangisa mutu na bokonzi na Nzambe? Bondima makambo ya lokuta te. Ba ndumba, ba ngumbameli bikeko, batu ya mobulu ya kindumba, 10 ba miyibi, kindumba ya basi ya batu to mibali ya batu, ba lokoso ya mbongo, ba tongi, ba tioli, na molangwa masanga, batu ya lokuta pona kozua mbongo moko te o kati na bango akozala na bokonzi ya Nzambe. 11 Yango ezalaki kati na bino, kasi bomi petola , pe bomi bulisa, pe bokoma sembo na Nzambe na kombo na Mokonzi Yesu Klisto pe na Molimo na Nzambe na biso. 12 «Nionso ebongeli nga,» kasi nyonso ezali na ntina te. kasi nakomi tika te na nionso mibale. 13 «Bileyi eza pona libumu, libumu pona bileyi», kasi Nzambe ako bebisa nyonso mibale. Nzoto ezali pona kindumba te, kasi nzoto ezali pona Mokonzi , Ye nde akobongisa pona nzoto. 14 Nzambe asekwisa mbala moko Mokonbzi na biso na nguya na ye. 15 Boyebi ete banzoto na bino ezali biteni na nzoto na Klisto? Na kokende wapi kozua biteni na nzoto ya Klisto na sangisa yango na ndumba esika moko? Ekosalama te! 16 Boyebi ete soki ozo sangana na ndumba bokomi nzoto moko. Ndenge makomi elobi: « Bango babale bakokoma nzoto moko.» 17 Kasi oyo akosangana na Mokonzi bakokoma molimo moko. 18 Bokima kindumba! Po lisumu mususu oyo moto azo sala eza libanda ya nzoto na ye, kasimoto na bodumba azo bebisa nzoto na ye moko. 19 Boyebi ete nzoto na bino eza tempelo na Molimo Mosantu, oyo afandaka kati na bino, oyo boyamba na Nzambe? Boyebi ete bino bozali na ndenge na bino te? 20 Pamba te basombami na talo makasi, bokumisa Nzambe na nzoto na bino.