1 Bayebisi biso ete kindumba ezali na kati na bino, bosoto wana endimami te na lisanga ya ba pagano. Bayebisi biso, moko kati na bino azo sala kindumba na mwasi ya tata na ye. 2 Pe lolendo eleki bino! Ebongaki te bomi tungisa kati na bino? Motu oyo azo sala makambu ya ndenge wana alongwa na lisanga na bino. 3 Ata nazali te na nzoto , kasi nazali sasayipi na molimo , na sambisi kala mutu oyo asali likambo wana. 4 Ntango bozo sangana na kombo na Mokonzi na biso Yesu Klisto, molimo na ngayi ezali elongo na bino na nguya na Mokonzi na biso Yesu Klisto na sambisi kala mutu wana. 5 Na sali bango po na kokaba ye na maboko ya satana pona koboma misala na ye ya nzoto. Po ete bomoyi na ye ebika soki na kobanzi na mokolo na Mokonzi. 6 Lolendo na bino eza malamu te, boyebi ete kamwa fulu ya mapa etombolaka mapa koleka? 7 Bomi petola ya kala, po ete bozala mapa ya sika, lokola bozali sika awa lipa ezangi fulu. bongo Klisto ye nde mwana mpate ya pasika oyo abakisamaki. 8 Toyangana na molulu na fulu ya kala te ya bizaleli mabe mpe ya kanda , kasi na lipa ezangi fulu ya bosolo mpe solo. 9 Na komeli bino makambo oyo, botika kosangana na batu ya mobulu na kindumba. 10 Na pekisi bino te kozala na bayokani na kati na mobulu ya kindumba ya mokili te, to bilulela te, to batu na bikeko te, mpo wana esengeli bo longwa na mokili. 11 Sika awa nazo komela bino, bozala na boyokani te na mutu babengi ndeko kati na Yesu oyo aza na mobulu ya kindumba, to na makasi na koyiba mbongo, to mutu na bikeko, to motsioli, to molangwi masanga, to mokosi makambo, kolia na mutu ya ndenge wana te esika moko. 12 Ndenge nini na komikotisa na kosambisa bato ya libanda ya eklesia? bongo, bazali kosambisa te ba oyo na eklesia? 13 Nzambe asambisaka ba oyo ya libanda. «Bolongola mayele mabe na kati na bino.»