1 Nalingi ete boyeba, bandeko ete ba tata na bino bazalaki yonso na nse na mapata mpe balekaki na kati na mayi na mongwa. 2 Ba batisamaki na Mose kati na mapata mpe kati na ngayi na mongwa, 3 mpe banso baliaki bileyi na molimo. 4 Banso bamelaki mayi na molimo, mpamba te bamelaki mayi na libanga na molimo oyo ezalaki Klisto. 5 Kasi Nzambe asepelaki na bango banso te, bakufaki mpe bibembe na bango epanzanaki na kati na esobe. 6 Sika makambo oyo bizali ndakisa mpona biso, na tina ete tolinga te ba posa ya mabe lokola bango. 7 Bozali bato na kosambela bikeko te lokola bango. Lokola ekomamaka: «bato bazalaki kofanda pona kolia mpe komela , mpe batelemaki pona kosakana.» 8 Kosala masumu na kindumba te, lokola basusu mingi bazali kosala mpamba te na mokolo moko bato koto tuku mibali na misato bakufaki na likambo yango. 9 Totia Yesu na kati na komekama te, ndenge mingi na kati na bango basalaki boye mpe bakufaki na ba nyoka. 10 Mpe toyimaka yimaka te lokola mingi na kati na bango mpe ba ajelu na kufa abomaki bango. 11 Makambo oyo ekumeli bango mpo epesa biso ndakisa mpo tososola. Ekomama mpona malakisi na biso na oyo etali suka ya ntango ebelemi. 12 Mpo ete oyo azali kokanisa atelemi likolo akeba mpo akweya te. Komekama yonso ezali kokomela biso oyo eza ya bo moto te. Nzokande, Nzambe aza sembo. Akotika bino te 13 komekana koleka makasi na bino, kasi uta na komikanisa akofungola nzela mpo ete bozala na nguya mpo na kobima na yongo . 14 Kasi balingami kimia bikima losambo na bikeko. 15 Nazali kolobela bino lokola bato na bwanya, mpo ete bososola oyo nazali koloba. 16 Kopo na mapamboli oyo tozali kapambola yango tozali kokabola ezali makila na Yesu te? Lipa tokaki na biteni biteni ezali kokabola yango nzoto na Klisto te? 17 Po ete tozali na biteni na lipa, biso etuluku na bato, tozali nzoto moko mpe tosangani esika moko mpona lipa. 18 BOtala bana na Isaleyela: bazali kasangana na etumbelo ba oyo wanabazali koliya ba mbeka? 19 Nalobela bino lisusu nini? Ekeko nde eleko nini? To bileyi epesameli ekoko nde eloko nini? 20 Kasi nazali koloba na ntina na biloko ba pagano, oyo bazali ba Yuda te, bazali kotumbela bazali kotumba yango na ba bikeko kasi mpona Nzambe te. Nalingi te bosangana na ba milimo mabe! 21 Bokoki te komela kopo na Mokonzi mpe oyo ya ba demona. Bokoki te kozua esika na mesa ya Mokonzio mpe ya na mesa ya ba demona. 22 Tolingi kotumbola zuwa na Mokonzi? Toleki ye na makasi? 23 «Yonso elingisami» kasi nyonso ezali na litomba te. «Nyonso elingisami», kasi yonso ekoki kotonga te. 24 Muto te aloka bolamu na ye moko Nzokande , muto na muto aluka bolamu na moninga na ye. 25 Bokoki kolia yonso bazali kotekisa na zando, bokoki kotungisama mpo na yango te. 26 Zambi :«mabele eza ya Mokonzi mpe biloko nyonso oyo mizali». 27 Soko mopagano akosenga bino tolia na ye mpe bolingi kolia, lia nyonso makanisi etungisami te. 28 Kasi soko muto akoloba na bino: «bileyi oyo ewuti na libonza ya ba pagano koliya yango te. Po na tina na muto oyo ayebisi yo mpo na ntiona na bososoli na yo. 29 Alobeli na bososoli na bino te, kasi bososoli na basusu. Pamba te pona nini bosomi na ngayi ekosambisama na bososoli ya muto mosusu? 30 Soko nazali koliya na matondi na nii nakofingama mpo na yango mpo naleyi na matonfi? 31 Na bongo soko bokomela to koliya , bosala yango po na kembo ya Nzeambe. 32 Bosala mabe ba Yuda to ba Grecs to eklisia ya nzambe mabe te. 33 Nazali komeka kosepelisa bato yonso na makambu nyonso Nazo luka litomba na ngayi moko te, kasi oyo ya batu ebele. Nazali bongo bo babika.