1 Bomekola ngayi, ndenge ngayi na mekolaka Klisto. 2 Sika oyo na sepeli na bino ndenge boza kanisa na makambo nyonso, mpe kobangami na na mibeko lokola na komelaki bino. 3 Sika oyo na lingi na sosolisa bino ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya muasi, mpe Nzambe azali mokonzi ya Klisto. 4 Mobali nionso aza ko bondela to kosakola na elamba ezipi mutu na ye azali kokumisa mokonzi na ye te. 5 Kasi muasi azali kobondela to kosakola mutu pamba azali kokumisa mokonzi na ye te. Po ete lokola suki na ye ezali ya kokata. 6 Soki muasi akoki kotia elamba na mutu na ye te, esengeli na ye akata suki. Soki kokata suki ezali soni po na muasi, esengeli na ye kasi kozipa suki na ye na elamba. 7 Bongo, mobali asengeli azipa mutu na ye te na elamba, po azali elilingi mpe kembo ya Nzambe. Kasi muasi azali elilingi ya mobali. 8 Po mobali ba benda ye na muasi te , kasi muasi abendama na mobali. 9 Mobali akelama pona muasi te, kasi muasi akelama pona mobali. 10 Na yango muasi esengeli azala na elembo ya lokumu na mutu na ye, na tina ya ba anjelu. 11 Kati na Mokonzi, muasi azali ye moko te na mobali, soki mobali mpe azali ye moko te na muasi. 12 Po lokola muasi awuta na mobali, na yango mobali abotamaka na muasi. Mpe biloko nyonso ewuta na Nzambe. 13 Bokata na bino moko: ezali malamu na muasi ko bondela Nzambe mutu pwelele? 14 Mokili ezali koteya bino te, soki mobali azali na suki milayi pe ebele ezali soni pona ye? 15 Mokili ezali koteya bino te, soki muasi azali suki milayi pe ebele, azali nkembo na ye? Po suki na ye epesamela ye po lokola elamba ezipaka. 16 Kasi soki mutu alingi kobenda makelele na ntina na yango, tozali na eloko mususu te, ata eklesia ya Nzambe. 17 Kasi na ba malakisi elandi, na kumusi bino te, po ete bokokani, tango bozali kosangana, ezali pona malamu te kasi po na mabe makasi. 18 Ya yambo , nayokaki ete tango bosangani na eklesia, ezli na kokabwana kati na bino mpe na ndimi yango mukie. 19 Esengeli ezala bokabwana ndambu na makambu eyeba na kati na bino na esengo. 20 Tango bozo sangana, ezali pona elambo te esengeli kolia. 21 Tango boza kolia yango, moto na moto aliya nanu bileyi na ye moko liboso ya misusu bazua ya bango. Moko aza na nzala mosusu alangwe. 22 Bozali na ba ndaku te po na bolia to bomela? Bolingi kobebisa lokumu na eklesia na Nzambe pe kosambwisa ba oyo bazali na ezloko te? Nalobela bino nini? Na kumisa bino? N atondi bino te po na yango. 23 Bongo nazua na Mokonzi oyo na yebisi bino. Tango Mokonzi Yesu, na butu wana batekaki ye, azuaki lipa. 24 Sima kotanda Nzambe, abuki yango mpe alobi: «Oyo ezali nzoto na ngayi, oyo ezali pona bino, bosala yango po na klokanisa ngayi» 25 Ndenge moko azui kopo sima ya kolia alobi: « Kopo oyo ezali boyokani ya sikana makila na ngayi. Bosala bongo ngonga nyonso bokomela yango po na ko kanisa ngayi.» 26 Na tango yonso boko liya lipa mpe komela kopo , boko tatola kufa na Mokonzi ti na bozongi na ye. 27 Mutu nyonso akolia pe komela kopo ya Mokonzi na ndenge elongobani te, akozua etumbu pona nzoto pe makila na Mokonzi Yesu. 28 Moto nyonso amitala ye moko, liboso na kolia pe komela. 29 Po oyo azolia to komela nakozanga bososoli, azo mela pe koliya esambiseli na ye moko. 30 Yango wana ebele kati na bino bazali na bolembu pe bokono, ebele pe balala pongi 31 Soki tomi tali malamu kati na biso, toko sambisama te. 32 kasi tango tosambisami na Mokonzi, tozali ba yekoli, po ete mokili eboya biso na esabeli na ye. 33 Tango bozo sangana pona kolia pe komela, boyokana bino na bino. 34 Soki moko na bino azali na nzala, alia epayi na ye, po ete tozo sangana te po na kobenda ko sambisama. Pona oyo etali makambu musus oyo tokomi te, na kopesa bino biyano tango na koya.