Mokapo 12

1 Na oyo etali makabo ya molimo, ndeko, nalingi boyeba malamu. 2 Tango bozalaki ba pagano, bozalaki kokende na banzambe ya bikeko, na lolenge nyonso, batambuisamaki na yango. 3 Yango wana, nalingi boyeba moto nyonso azali na Molimo na Nzambe akoki koloba te «Yesu alakelama». Moto te akoki koloba :«Yesu aza Mokonzi» longola Molimo Mosatu. 4 Makabo ekeseni kasi Molimo moko. 5 Lolenge ya kosalela Nzambe ekeseni kasi Mokonzi kaka moko. 6 Misala ekeseni kasi eza kaka Nzambe moko akokisaka yango. 7 Epesamela na moto moko bomonisami ya Molimo mpo basusu bazua litomba na yango. 8 Pamba te mosusu epesemeli ye Molimo ya maloba ya bwanya, na mosusu liloba ya boyebi na molimo moko kaka. 9 Na mosusu epesemela kondima na molimo kaka moko, mosusu likabo ya kobikisa , 10 mosusu likabo ya bikamua, mosusu likambo ya kosakola, mosusu likabo ya kososola milimo, na mosusu koloba nkota ya sika, na mosusu likabo ya kolimbola minoko. 11 Kasi Molimo kaka moko nde asalaka makambu wana nyonso, nakopesa makabo muto na muto ndenge alingi. 12 Lokola nzoto ezali moko pe biteni ebele pe nyonso ezali biteni ya nzoto moko ezali bongo pona Yesu. 13 Nzokande na Molimo moko nd e tobatisami na nzoto moko, ezala ba Yuda to ba Grecs, baumbu to basomi, bango nyonso basalami na Molimo moko. 14 Na bongo nzoto ezali teni moko te, kasi ebele. 15 Soki likolo elobi: «Po nazali liboko, nazali eteni na nzoto te», azali eteni ya mukie na nzoto te. 16 Soki litoyi alobi: «Po nazali lisu te, nazali eteni na nzoto te», azali eteni ya mukie te. 17 Soki nzoto nyonso ezalaki lisu, esika nini koyoka elingaki ezala? Soki nzoto nyonso ezalaki litoyi, esika nini nzolo elingaki ezala? 18 Kasi Nzambe atia biteni nyonso na nzoto ndenge alingaki. 19 Soki bango nyonso bazalaki eteni moko, nzoto elingaki ezala wapi? 20 Kasi biteni ezali ebele, nzoto moko.