MOKAPO 7

1 Na mobu ya ineyi ya bokonzi ya Dalusi, liloba na yawe epesamaki na yakalia, mokolo na mineyi ya sanza ya libwa, oyo ezali sanza na kisilewu. 2 Bongo batindaki uta betele salesele mpe Leguheme meleke elongo na bayi ke na bato, mpo na kolomba mawa na yawe. 3 Mpe mpo nakoloba na batumbi mbeka na ndaku na yawe na mampinga elongo na basakoli: esengeli nalela na sanza na mitano mpe namipekisa makombo masusu, bo ndenge esalaki ngai mibu mileka? 4 Nde liloba na yawe na mampinga epesamelaki ngai boye: 5 Loba na bayi mboka banso mpe batumbi mbeka boye ekilaki bino mpe elelaki bino O sanza ya mitano mpe sambo, uta mibu tuku sambo, ezalaki nde mpo na ngai nde bakilaki? 6 Bongo tango bokoliya mpe komela, ezali beno te boliaki mpe bomelaki? 7 Bobungi maloba esakolaka yawe na basakoli ya yambo, tango yelusaleme ezalaka na bato mpe na boyokani mpe kimia na bingumba bizinga yango, bongo mokili na ngele mpe na esobe efandaka bato. 8 Liloba na yawe epesamaki na yakalia boye: 9 Elobi yawe na mampinga, bokata makombo na bosembo, bozala na mawa mpe bolamu na bato banso. 10 Bongokolo etike to mwasi abali te, mopaya to mobola te, mpe bokana te kosalana mabe kati na mitema bino. 11 Kasi bango batikalaki se mangbangi, mpe banikwakaki, mpe bazipaka matoyi. 12 Bokamisaki mitema na bango bo mabanga, nakoboyaka mitindo mpe naloba na yawe na mampinga, maye alobelaka bango na nzela na molimo na ye mbala na yambo na nzela na basakoli. ya yambo libasi na bongo nde yawe na mampinga angali na nkanda ekasi. 13 Tango abiangaki bango, batiaka mangbongi: ngai mpe na boyakobayoka O mokolo mona, elobi yawe na mampinga. 14 Napanzaki bango O bikolo nzike oyo bayebaka te, mboka ekomaki yembele yembele sina na bango, mokeyi to mpzongi azalaka lisusu te, zambi mboka oyo ya kitoko bango bakomisa yango esobe.