Mokapo 6

1 Nasembolaki lisusu miso o likolo mpe namoni, makalo ma mpunda inei, ibimaki kati na ngomba ibale, nde bangomba yango izalaki ya motako. 2 Na likalo na yambo, ezalaki bampunda ya mitane, mpe liye ya ibale ya miyindo. 3 Na likalo na isato, ezalaki bampunda ya pembe, bongo liye ya inei, bampunda ya langi langi na motane. 4 Nakwi liloba koloba na anjelu boye: Elakisi nini? 5 Anjelu ayanoli ngai: Wana mipepe minei na lola, mibimaka uto esika etelemaki yango o boso bwa mokonzi ya mokili mobimba. 6 Bampunda miyindo iye ikangamaki na yoko na likalo, wana ikei o ekolo ezali epai na likolo, iye ya pembe ilandi yango, mpe iye ya langi langi ikei o ekolo ya ngele. 7 Iye ya motane ibimi mpe isengi ikenda kongaika o mokili. Anjelu alobi na bango: Bopota, bongaika o mokili, bongo bangaiki bo esengeli. 8 Angelu abiangi ngai mpe alobi:Tala iye ikei o ekolo na epai na likolo, balembi nkanda na ngai mpo na ekolo yango 9 Mitindo mya Yawe mipesamelaki ngai boye: 10 kumba makabo na bakangami baye, Eledai, Tobiya mpe Yedeaye, mpe yo mei nde okei mokolo mwango, o ndako ya Yosiase, mwana na Safaniya, bisika bakendaki na bokomi na Babyloni. 11 Okokwa wolo mpe palata, sala na yango mtole, mpe mama yango o moto mwa Yosua, mwana na Yasadaka, nganga Nzambe mokonzi. 12 Okoyebisa ye boye: Elobi Yawe na mapinga, tala moto na kombo nzete ebotaka, akokola na esika na ye, mpe akotonga tempelo na Yawe. 13 Akotonga tempelo na Yawe, akolata bilembetelo na bonene na ye; akofanda mpe akokonza likolo na ngbende na ye, akozala motumbi mbeka likolo na ngbende na ye, nde bosangani ya sikisiki ekoumela kati na bango. 14 Mitole mikozala mpo na: Heleme, Tobiya mpe Yedaeya elongo na Heme mpe lokola, oyo azali mwana na Sofiniya, kati na tempelo na Yawe. 15 Baye bazali mosika bakoya kosala o tempelo na Yawe; nde bososoli penza te nazali motindami na Yawe na mapinga epai na bino. Makambo mana makokoma, soki boyoki mbela na Yawe, Nzambe na bino.