Mokapo 5

1 Namatisaki miso o likolo, bongo namonaki mokanda mozingama mpe kopumbuka o mopepe. 2 Bongo alobi na ngai: Omoni nini? Nayanoli: Namoni mokanda kopumbuka, ntaka na molai mapeko ntuku ibale mpe bonene na yango mapeko zomi. 3 Nde anjelu alobi lisusu: Wana nde elakeli ebe ekopalangana o ekolo, zambi engebene na yango, moyibi ata moko te akozala na esika, lolenge yoko na bokati ndayi na masele (lokuta). 4 Bo elobi Yawe na mapinga, ngai mei nde nandingisi elakeli ebe wana, boyingela o ndako moyibi inso mpe mokati ndayi na lokuta na kombo na ngai, ekofanda wana, mpe ekotumba mabanga mpe mabaya na ndako yango lokola. 5 Anjelu oyo asoloalaki na ngai abelemi pembeni, koloba: Sembola miso na yo mpe tala maye nini ebimi wana. 6 Nayanoli boye: Eloko nde?Alobi: Oyo ebimi nde efa (kitunga), etonda meke bambeba ya mokili mobimba. 7 Mpe tala, ezipelo monene na ebednde mpe kilo, oyo ezipaka efa (kitunga) etombwami, nde namoni kofanda tondo ya kitunga. 8 anjelu alakisi: Mwasi oyo nde elembo ya bambeba ya bato banso, nde asukumaki ye kati na efa (kitunga), mpe azipaki ezipelo monene ya ebende likolo na efa. 9 Nasemboli lisusu miso mpe namoni, bongo basi babale babimaki pwasa o likolo, mpe mapapu ma bango masimbamaki na mopepe, zambi mapapu ma bango maulanaki na oyo ya ndeke monene ya esobe, balongolaki efa kati na mokili mpe lokolo. 10 Tango tosololaki na anjelu, nalobi: Wana bakei na efa (kitunga)? 11 Mpe ye ayanoli: Mpo botongeli yango ndako o ekolo ya Simala; bongo tango ekosila, nde etiami bo esika elongobani.