Mokapo 4

1 Anjelu tosololaki na ye azongi mpe atalisi ngai bo liloto na moto na pongi na ye. 2 Alobi na ngai: Omoni nini? Nayanoli ye: Natali mpe tala, etumbelo na mwinda ya wolo, Nsani na yango ekumbaki miinda sambo, elongo na bilekelo na miinda na yango sambo oyo efandaki likolo na etemelo na mwinda yango. 3 Zinga zinga na etemelo yango, nzete ibale ya bilaya, yoko na loboko ya mobali ya nsani mpe esusu na oyo ya mwasi. 4 Mpe kokwa lisusu maloba, nalobi na anjelu oyo tozalaki kosolola: Makambo maye, malobi nini, mokonzi na ngai? 5 Anjelu yango koloba: Yo obungi ndimbola ya mambi maye? Nayanoli: Boye mokonzi na ngai! 6 Akwi lisusu maloba: Awa nde liloba Yawe alobi na Yolobabele; ezali na nguya to na makasi te, bobele na Molimo, elobi Yawe na mapinga. 7 Yo nani ngomba monene o boso bwa Yolobabele? Okosambusama. Akotia libanga ya ntina na kati na makumisi, ngolu, ngolu mpo na ye. 8 Liloba na Yawe epesamelaki ngai lisusu boye: 9 Maboko na Yolobabele nde matongaka ndako eye, mpe kaka maboko mango nde makomisaki yango kino suka, mpe okoyeba te natindamaki na Yawe na mapinga. 10 Pamba te, boye batiolaka mokolo makambo mabandaka na botau, bakosepela komona esika loboko na Yolobabele ekomi, zambi byango sambo nde miso na Yawe oyo ikongaika mokili mobimba. 11 Nakwi liloba boye: Elobi nini nzete ibale ya na bilaya, na loboko ya mobali mpe ya mwasi na etemelo na mwinda? 12 Nakwi lisusu liloba mpo na mbala ya ibale boye: Elobi nini mandalala mibale na nzete na bilaya, oyo ezali nzinga nzinga na bilekelo ya wolo mibale ya mwinda, esika eye wolo ekosopana tambululu? 13 Ayanoli ngai boye: Obungi ndimbola ya mambi maye? Nayanoli: Boye Mokonzi. 14 Mpe ye alobi: Bazali bapokolami babale baye batelemi ngbi o boso bwa Mokonzi mpe mokeli ya mokili mobimba.