MOKAPO 8

1 Liloba na yawe na mampinga esembolamaki na ngai boye; 2 Yawe na mampinga alobi boye: mpo na sima nazali na mawa mpe zuwa monene, mpe nasimbani na kosilika makasi. 3 Yawe na mampinga alobi boye: nazongi O sima, mpe na kofanda O tondo ya yelusaleme, yelusaleme ekobyangama engumba botosi solo, mpe ngomba na yawe na mampinga nde ngomba esantu. 4 Yawe na mampinga alobi lisusu boye: mibange mpe basi bikoko ba kofanda lisusu na ba balabala ya yelusaleme, mokomoko na bango na lingenda O maboko, na ntina na bowumeli na bango O mokili. 5 Babalabala ya engumba ekotonda meke na bilenge babali mpe basi, kosakanaka kati ya babalabala. 6 Yawe na mampinga alobi boye: soki likambo yango ezali kamwa na miso ya ndambo na bato lelo O mokolo mana, ekokamwisa ngai te elobi yawe na mampinga. 7 Yawe na mampinga alobi boye: tala, na kangoli libota na nga uto mboka na ebimelo na moyi kino mboka na elalelo na moyi. 8 Nakozongisa bango, mpe bakofanda O tondo ya yelusaleme, bakozala libota na ngai, mpe nakozala nzambe na bango na bosolo mpe sembo. 9 Yawe na mampinga alobi boye: bokembisa maboko ma bino, bino baye bokoyoka lelo maloba maye kobima O monoko ya basakoli baye baye banononi O eleko oyo etongamaka ndako na yewe na mampinga, tongo eye tempelo alingaka kotongama. 10 Zambi yambo na tongo, yango mosala na moto ezaka ata mbano te, mpe lifuta na babibwele ezalaka te, mpo na babimi mpe bazongikimia ezalaki te, mpo banguna bazalaki, mpe na tikaki botomboki engala O nteyi ya bino. 11 Sika oyo, nazali lisusu te mpo na ndombo na bato bana, bo lolenge ezalaka ngai kala, elobi yawe na mampinga. 12 Nde milona ekofuluka, elanga na vino nde eboti mbuma, mabele nde epesi bofuluki na yango, mpelikolo nde esukumi mamwe, nakosepelisa ndambo na bato baana, na mabi nana. 13 Lolenge yango bolakelamaka mabe kati na bikolo, ndakop na yuda mpe na Isalaele, se bongo nde nakobikisa bino, bokokoma lipamboli. banga te, mpe bokembisa maboko ma bino. 14 Yawe na mampinga alobi boye: lolenge na kanaka kosala bono mabe tango ba tata na bino batombokisaka ngai, elobi yawe na mampinga, mpe na limbisaka bino te, 15 Na yango nalembisi nkanda, mpe nazwi meko O mokolo moye, kosala bolamu na yelusaleme mpe na ndako na yuda. bobanga te. 16 Tala maye masengeli na bino kosala: bolobelana bosolo bino na bino, bokata mambi na bosembo ekuke na ekike, mpo na kopesa komia. 17 Moko te kati na bino akana mabe mpo na moninga, boboya ba seleka ya masele, zambi nde mambi ma ye ngai yawe nayina. 18 Liloba na yawe na mampinga epesamelaki ngai boye: 19 Yawe na mampinga alobi boye: kokila bilei ya zanza na mineyi, oyo ya sanza ya mitano, ya libwa mpe oyo ya sanza na zomi nde ebongwani mikolo na esengo mpe nsayi mpo na ndako na yuda, na nteke na bosepeli, na yango bolinga bosolo mpe kimia. 20 Yawe na mampinga alobi boye: boyike bwa bato mpe bafandi nzike bakozonga kofanda O bingumba. 21 Bafandi ba engumba fulani, bako hema kokende engumba fulani kolobaka: tokendekolomba yawe mpe toluka yawe na mampinga, tokokende lokola. 22 Mpe boyike bwabato elongo na bikolo nzike bakoya koluka yawena mampinga O mboka Yelusaleme, mpe bakolomba yawe. 23 Yawe na mampinga alobi boye: O mikolo miina, bato zomi bya bikolo mpe nkota bisusu, bakosimba na bokasi bonso songe na elamba na myuda, mpe koloba: tokokende na bino elongo, Zambi toyoki te nzambe azali azali na bino.