Mokapo ya 4

1 Bongo Awa Kristo anyokolami ona bomoto, bino mpe bondimi konyokolama na molende nionso mpote moto oyo anyokolami, ye nde moto aboyi masumu libela. 2 Boye, moto lolengfe wana azali lisusu kobika makambo na bomoto te, kasi bozalaka na bizaleli oyo Nzambe alingaka. 3 Nzambi bobebisi ntango mingi na kolandaka makambo esepelisaka bato baye bayebi Nzambe te. Bazalaki kosala ekobo, kondima posa mabe, kolangwa masanga, kokabuana, kolia mpe komela na lokoso mingi koleka , banzambe bikeko.mpe kobebisa lokumu na biso lolenge bozalaki kosambela banzambe ya bikeko. 4 Kasi bato bayebi Nzambe te bakomi kokamwa mpe kofinga bino, lokola bazali kosangana na bango lisusu te mpo na kosala makambo wana ya mobulu. 5 Nzoka nde mokolo ezali bakosamba mpona yango nionso baye bazali na bomoi na baye bakufa. 6 mpo na yango, Kristo asakolaki sango malamu mpona bato bakufa, baye tolobaka basambisami wana ezalaki bango na mokili. Kristo asalaki boyee mpo bazua bomoyi ya molimo bo ,elingi nzambe . 7 Suka ya makambo ekomi pene pene, yango wana, bozala mayele mpe ekenge kati na mabondeli. 8 Likambo eleki lotomo yango oyo" bolingana mingi penza, pamba te, baye bazalaka na bolingo, Nzambe alimbisaka masumu na bango, atako ezali ebele. 9 Boyambanaka kati na bino, bofundamaka te. 10 Lokola moko na bino, ozui b iloko, bosalela yango na lolenge ebmongi mpo na bolamu na baniga. 11 Soki moko azli kosakola, asokola bobele maloba ya Nzambe akozwa lokumu mpona Yesu Kristo. Na Yesu Kristo, lokumu mpe Nguya nionso ezali ya ye seko. Amen. 12 Balingami, mpo na moniokoli mosali kokomela bino lokola emekeli: bokamwa te pela moko soki lekamueseli ezali kokweela bino. 13 Kasi na motindo mosusu, bosepela ete bozali kosanga na mpasi ya Kristo, ete bosepela na esengo monene wana ekomonana nkembo na yawe. 14 Bozala na esengo soki bakofinga bino mpo na kombo na Kristo mpe ete molimo na nkembo mpe na Nzambe azali kowumela na bino. 15 Boye tika ete moto kati na bino aniokolama lokola mobomi, moyibi, mosali ya mabe to mpe monangi ya makambo ya ba mosusu, 16 Kasi soko aniokolami lokola moklisto, ayoka nsoni te, nde akumisa Nzambe mpo na Nkombo oyo. 17 Nzambi elaka ete kosambisa ebanda na ndaku na Nzambe. soko nde ebandi awa na biso, nsuka na bango baboyi nsango malamu na Nzambe ekozala nini? 18 Soko moyengebene akobika bobele na kpokoso motali na Nzambe mpe mosali masumu azali lolinge boni? 19 Na bongo, ktika ete bango kbazala na kpokoso pelamoko ekani Nzambe, bapesa bomoyi na bango epai na mozali na bango mpo na kosala malamu.