Mokapo ya 5

1 Nazali koteya ba mpaka kati nabino, ngayi mpaka, moninga mpe nzeneke ya bwale ya kristo, mpe moko na ba oyo ba jali kolikyo nkembo oyo ejali koya. 2 Na boye, najali kolendisa ba mpaka, ete, bobatela etonga ya Mokonzi apesi bino. 3 Bokamba yango na mosuku suku te, kasi nde na bolingo na Nzambe, bobatela yango na lokoso ya misolo te, bobele na bolingo. Bokamba bango na motema na kanza te, lokola bana ya misale na bino, kasi bojala ndakisa, mpona Ekelesia. 4 Tango ye mei, Mokonzi na ba mpate akoya, nde bokozua mbano wa lokumu. 5 Lolenge moko, bino bilenge mibali, bomemiya ba kulutu. Bino nionso bosunganaka, kati na komikitisa, ba moko mpe basusu pamba te, Nzambe atelemelaka bato ya enzombo, asalelaka ngolu na baye bamikitisaka. 6 Na nse na loboko na nguya na Nzambe, bomisokya, mpo ete, atombola bin,o, na ntango esengeli. 7 Bosundola mitungisi na bino yonso epai na bino nionso epayi na ye, mpo akobatela bino. 8 Bozala na bopolo mpe ekenge, monguna na bino, zabolo azali kozumbulika nzinga nzinga na bino lokola nkosi, miso ngwa, koluka oyo akolya. 9 Bojala makasi, botelemela ye kati na kondima , boyibi ete kati na mpasi yango, banionga na bino mosusu na mokili, bajali koyika mpiko. 10 Sima na tango muke, ya bwale, Nzambe na ngolu oyo abiangi bino kati na nkembo ya libela na Kristo, akobutisa bino, akofandisa bino, mpe akolendisa bino. 11 Bokasi bwaye nse biloko binso bikeke na bikeke. Amen. 12 Na nzela ya moninga nagayi Silas, nde nakomelaki bino na mokuse. Bokangama penza na makomi yango mpo ezali bolamu na Nzambe. 13 Eklesia oyo ya babilone oyo bojali na yango lolenge moko, epesi bino losako elongo na mwana nagayi maloko. 14 Bopesana losako ya esengo, kimia na kati na kristo ejala na bino.