Mokapo ya 3

1 Ndenge moko, bino basi botosaka mibali na bino, kosalaka bongo na tina ete ata moto atosaka maloba na Nzambe te, komona bizaleli malamu na basi na bango, bandimeli Nzambe, 2 Mpo et bamoni bizaleli ya malonga mpe ya limemia. 3 Bobomikomisa kitoko te na biloko oyo emonanaka na miso, kokanga suki, kolata biloko ya wolo to bilamba ya kitoko, kasi kitoko oyo emonanaka na misu te. 4 kasi bozalaka bato ya mitema malamu. Mpe kimia, wana nde kitoko ya kobombama, yango nde ezali ya motuya na miso na Nzambe. 5 Basi ya kala ya bosantu bazalaki komikomisa ndenge wana, batielaki Nzambe mitema mpe kotosa jmibali na bango, 6 lolenge moko Sara atosaki Abraham mpe azalaki kobenga ye mokonzi, bozaali sik'oyo bana na naye soki bozali kosala makambo ya malamu mpe bozali kobanga mikakatano te. 7 Ndenge moko mpe bino mibali bozalaka na bizaleli moko ya malamu na basi na bino, mpe boyeba ete ba zali bikelamu oyo ezangi makasi, botosa bango mpo ete bango mpe bakozwa bolamu oyo nzambe alakaki na bato nionso, bosala bango mpo eloko moko ekangela bino nzela na mabondeli na bino. 8 Mpo na kosulisa, bozalaka se na likanisi moko, boyokanaka mpe bolinganaka lokola bandeko, bozalaka bato ya boboto mpe komokitisa, 9 Soki moto asaliyo mabe kozongiselaye mabe te , soki moto afingi yo, kofinga ye te, kasi, senga na Nzambe apesa ye bolamu mpo Nzambe abengi bino mpo bozua bolamu naye nionso. 10 Oyo alingi bomoi mpe komona mikolo esengo atika kosala mabe mpe koboya lmakambo nionso ya lokuta. 11 Atika kosala makambo ya mabe mpe asala malamu, aluka kimia alandango. 12 Misona Mokonzi ezali kotala bayengebene mpe matoyi naye, ezali koyoka mabondeli na bango, kasi apesaka bato mabe mokongo. 13 Nani akosala bino mabe, soki bomipesi na misala ya malamu? 14 Kasi soki bazali konyokola bino pona makambo ya malamu, bopambolami, bobanga te, mpe bozala mitema likolo likolo te. 15 Bondima Mokonzi ye Kristo na mitema na bino, soki batuni bino, bozelaka nini boyeba kopesa bango eyano na bopole mpe botosi. 16 Bozala na makanisi ya malamu, mpo ata bato oyo bafingaka bino lokola bozalaki bato mabe, batikala na soni. 17 Nzambe alingi tomona bwale mpona misala malamu na esika tosalaka mabe. 18 Yesu amoni bwale mbala yoko mpo na masumu. ye ùmokyengebene amonaki bwale pona biso bato mabe mpe komema biso epayi ya Nzambe, akufaki na mosuni, kasi azongaki nabomoi, na nguya ya molimo mosantu. 19 Na nguya ya molimo, akendeki koteya milimon ekangami sika oyo na boloko. 20 Bakangaki mitemate na mikolo na Noa, bazangaki botosi, tango Nzambe akangaka motema mpo na kozela mikolo ya Noa, tango na kotanga masuwa mpe Nzambe abikisaki bato mwambe na mayi. 21 Yango nde elembo ya libatisi oyo epesi biso lobiko sik'oyo, pona kolongola bosoto ya nzoto te kasi, na lisekwa na mokonzi na biso yesu Kristo. 22 Kristo abutaki na likolo, afandi na loboko ya mobali na Nzambe. Ba angelu, mikon,zi mpe ba nguya ezali kotosaye.