Mokapo ya mibale

1 Na bongo bobuaka mabe nionso, lokuta nionso, mayele mabe nionso, mposa ya kulula, mpe matongi. 2 Kasi lokola bana babotami sika, bolingaka mabeleba bongi ya milimobokola na kobika na nzela na ye. 3 Soki bososoli ete Mokonzi azali malamu. 4 Boya epayi naye libanga na bomoyi oyo bato babuakaki, kasi Nzambe apona yango ezali motuya. 5 Lolenge moko lokola mabanga na ntalo oyo elendisami po na kokoma ndako na molimo, mpo nakozala bonganga Nzambe oyo epesi mbeka na bomoi oyo endimani na Nzambe na Nzila na Yresu. 6 Mpo ete maakomi malobi: « Tala natie na sion libanga na ntalo, oyo eponami. » Moto nani jandimeleyi akoyokisama nsoni te. 7 Pona bino bondimi lokulu ejali na bino. kasi libanga « oyo batongi ba buakaki, yango ekoma ya ntalo». 8 Mpe « libanga na moto mpe, libanga monene na libaku». kozanga ,botosi na liloba na Nzambe, koselengua, mpo ete na yango balakilami. 9 Kasi bino, jbozali libota liponami, banganga Nzambe, libota mosantu, na Nzambe, na ntina ete bosakola bolamu ya oy abiangi kati na molili mpe na moyi endimami. 10 Sika bozali libota na Nzambe, mpo etet baza na libebi, bozanki ngolu sika bozali na yango. 11 lokola bapaya ba oyo bawayi wayi, na bondeli bino ba ndeko komipekisa mposa ya nzoto oyo ezali kobundisa mitema na bino. 12 Kati na pagano, tozali na, bizaleli malamu, mpo ete soko $bakoloba moto na ntina na bino, bakoki komona misala malamu mpe lkokumisa nzambe na koya naye. 13 Botosa ba Nkumu ya mboka mpona MokoNzi, botosa bakonzi lokola banetolami, 14 boyangeli ba oyo bapesaka etumbu na bato mabe mpe kokumisa ba oyo bazali malamu. 15 Mpona bolamu basali bino, ezali mokani na Nzambe tango botikaki nye na maloba ya bato bazangi boyebi, bazoba. 16 Lokola basali na Nzambe, nbosomi na bino ebomba kanda te lokola bato na bonzomi. 17 Bolinga bandeko, bokumisa mutu nionso, mpe mokonzi, bobanga Nzambe. 18 Basali, bozala na botosi mingi na bakonzi na bino ya malamu mpe mabe. 19 Mpo ete ezali lokumu na moto oyo azali koniokuama na likambo oyo ayebite, makanisi naye efandi na bo Nzmbe. 20 Ezali na lokumu nini mpo na koniokuama na etumbun tango osali lisumu? ezali malamu na miso na Mokonzi, tango ozali koniokuama mpo na malmu asali. 21 Bino bo biangamakisto mpona yango, mpo ete Kristo aniokuamaki mpo na bino. Wana ezali ndakisa mpo na bino bolanda matambe naye. 22 Ye asalaki ata lisumu te, okati ya mùonoko naye ezalaki na lokuta moko te. 23 Ye afingamaki, kasi azongisaki maloba te, azalaki na mpasi: mpe asalaki mobulu te. Atikaki na oyo akataka makambu sembo. 24 Kasi ye akumbaki masumu na biso na nzoto naye, na ekulusu, na tina ete tozala lisusu na lisumu te mpe tobila bo sembo. Nzambi na mapipi na ye nde tozuaki lobiko. 25 Mpo tozalaki kotelengana lokola ba mpate ba bunga nzela, kasi sasa ipi bozongi epayi na mobateli mpe mokengeli ya milimo na bino.