1 Sima naye koloba makambo oyo,atomboli miso nalikolo mpe alobi:tata,tango ekoki. Kumisa mwana nayo mpo ete mwana akumisa yo, 2 Lokola opesi ye bokonzi likolo na nioso ,mpo apesa bomoi na seko epai naba oyo nioso opesaki ye 3 Ezali bomoi na seko mpo bayeba yo,nzambe ya solo oyo atindaki yesu-klito. 4 Na mokili oyo nakumisaki yo mpe nakokisi misala oyo opesaki ngai . 5 Na tango oyo tata,kumisa ngai pene pene nayo nakembo oyo nazalaki nayango pembeni nayo liboso yambo mokili oyo esalama. 6 Na tatoli kombo nayo na bato na mokili oyo opesaki ngai . Bazalaki kati nayo pe y'opesi ngai bango pe batosi maloba nayo. 7 Bayebi sikoyo ete nioso oyo opesaki ngai ewiti nayo, 8 mpo ete napesi bango liloba oyo opesaki ngai. Bayambi yango pe bandimi yango na solo ete nawiti epai nayo, pe yonde otindaki ngai. 9 Na bondelaka mpona bango kasi mpona mokili te, kasi mpona ba oyo opesi ngai bango, mpo ete bazali ya yo. 10 Nioso oyo ezali na ngai ezali ya yo pe nioso yayo ezali pe ya ngai ,pe nazali komikumisa mpona yango. 11 Nazali lisusu na mokili oyo te kasi, bango bazali kati na mokili, mpo nakeyi epai nayo,tata mosantu,bomba bango pona kombo nayo,kombo oyo opesaki ngai mpo ete bazala moko,lokola yo na ngai tozali moko 12 Natango nazalaki na bango ,nabatelaki bango nakombo nayo opesaki ngai; na batelaki bango pe moko te kati na bango abungi, kaka mwana ya libungi, mpo ete makomi ekokisama. 13 Sika awa nazoya epayi nayo , kasi nazali koyebisa bango makambu oyo na mokili,mpo ete bazala na esengo na ngai kati na bango. 14 Na pesi bango maloba nayo, pe mokili eyini bango mpo ete bazali ya mokili te,lokola ngai pe nazali ya mokili te. 15 Nazali kosenga yo te mpo olongola bango na mokili,kasi mpo obatela bango liboso ya bato na nkanza. 16 Lokola nazali ya mokili te,bango mpe bazali ya mokili te. 17 Petola bango nabosolo nayo,mpo ete liloba nayo ezali solo. 18 Lokola y'otindi ngai na mokili ,ngai pe natindi bango. 19 Namibulisami pona bango mpo ete bango mpe ba bulisama kati nabosolo. 20 Ngai nazali kobondela bobele mpona bango te, kasi mpe mpona ba oyo nioso bakondimela ngai pona liloba nayo, 21 natina ete bazala na bomoko, lokola yo, tata, ozali kati na ngai, mpe ngai kati nayo. Nazo sambela bazala mpe kati na biso, natina ete mokili endima ete yonde otindaki ngai. 22 Napesaki bango kengo oy'oyo opesaki ngai, natina ete bazala na bomoko, lokola yo na ngai, tozali moko, 23 ngai kati na bango pe yo kati na ngai, mpo ete bazala ya solo na bomoko; na tina ete mokili eyeba yonde otidaki ngai, mpe olingaka bango lolenge moko na ngai. 24 Tata,ba oy'opesi ngai, nalingi bazala pe esika oyo ngai nazali, natina ete bamona nkembo na ngai, oy'opesi ngai; mpo ete olingaki ngai yambo mokili esalama. 25 Tata moyenge bene,mokili eyebaki yo te,ngai nde moto nayebi yo, mpe ba oyo bayebi ete yonde otinda ngai. 26 Nalakisaki bango kombo na yo,mpe nakolakisa bango lisusu, natina ete bolingo oyo oza nayango mpona ngai ezala mpe mpona bango.