Mokapo 16

1 Nalobi na bino makambo oyo mpo bokweya te. 2 Bakotiya bino libanda ya eyanganelo, na yango ekoki oyo moto nyonso akoboma bino na kokanisaka ete ajali kosala misala malamu mpo na njambe. 3 Bakosala makambo yango mpo bayebaki tata te mpe ngai te. 4 Nayebisi ino makambo oyo mpo tango yango ekoya bokanisa lolenge na yebisaki bino. Nayebisaki bino yango na ebandeli te, mpo ete njalaki na bino elongo 5 Nakokende epai ya oyo atinda ngai, kasi kati na bino moko te atuni ngai motuna«Okokende wapi.» 6 Lokola nayebisaki bino makambo oyo, mitema na bino etondi na mawa. 7 Kasi nalobi na bino solo: Ejali malamu koleka mpo na bino ngai nakende. Mpo soki nakei te, mosungi akoya epai na bino te. Kasi soki nakei, nakotindela bino ye. 8 tango mosungi akoya, akolakisa bino mbeba ya mokili kolandana bongo na masumu, na bosembo mpe na kosambisama. 9 Mpo na oyo etali lisumu, mpo ete bandimali ngai te. 10 Ndenge moko na oyo etali bosembo mpo ete najali kokende epai ya tata, mpe bino bokomona ngai lisusu te. 11 Na oyo etali kosambisama, mpo ete nkumu ya mokili oyo asi asambisami. 12 Najali na makambo mingi ya koloba na bino, kasi nyonso bokososola yango sika oyo te. 13 Boye, tango ye, molimo na solo akoya, akolakisa bino kati na bosolo. Akoloba oyo ekouta na ye moko te; 14 Akokumisa ngai, pamba te akojwa makambo oyo ya ngai, mpe akotatolela bino yango. 15 Nyonso tata ajali na yango, ejali na ngai; na yango, nalobi ete molimo akojwa makambo oyo ejali na ngai, mpe akopesa bino yango. 16 Na ngonga moke, bokomona ngai lisusu te; sima ya ngonga moke lisusu bokomona ngai.» 17 Kati na bayekoli bamilobeli bamoko na basusu: «Makambo nini ajali koloba "na ngonga moke bokomona ngai lisusu te, na ngonga moke bokomona lisusu ngai" mpo ete ngai najali kokenda epai ya tata. 18 Balobi lisusu: «Nini penja alingi koloba na biso" na ngonga moke? Tojali koyeba te ajali koloba penja nini» 19 Yesu amoni ete bajali na mposa ya kotuna ye mituna «Bojali kosenga boyeba oyo najali koloba; na ngonga moke bokomona ngai te, na sima na mwa tango lisusu bokomona ngai? 20 Solo solo najali koloba na bino, bokolela mpe bokomitungisa tungisa, kasi mokili ekojala na esengo, bokojala na mawa kasi mawa na bino ekobongwana esengo. 21 Mwasi ajalaka na mawa tango ngonga ya kobota ekoki likolo ya pasi. Kasi soki asili kobota, abosani pasi nyonso na ntina na esengo ya mwana oyo ayei na mokili. 22 Bino lokola bojali na mawa, tango oyo, kasi nakomonana na bino lisusu, mpe mitema na bino ekotonda na esengo mpe moko te akolongola bino esengo wana. 23 Boye na mokolo wana, bokotuna ngai mituna te. Ya solo solo, nalobi na bino eleko nyonso oyo bino bokosenga na tata na nkombo na ngai, akopesa bino yango. 24 Kino tango oyo bosengi naino eloko te na nkombo na ngai, bosenga, mpe bokojwa mpo ete esengo na bino ekokisama. 25 Nayebisi bino makambo oyo na lolenge ya masapo, kasi tango ezali koya nakoloba na bino lisusu na masapo te, kasi nakoloba na bino polele polele na ntina na tata. 26 Na mokolo wana, bokosenga na nkombo na ngai, mpe nalobi na bino te ete nakobondela tata mpo na bino, 27 pamba te ye moko alingi bino; Na ntina ete bino bolingaki ngai mpe bondimaki ete nauti na tata. 28 Nauti na tata, mpe nayaki na mokili, najali kolaba lisusu ete najali kolongwa na mokili mpe najali kokende epai ya tata. 29 Bayekoli na ye balobi: Tala sikoyo olobi polele, ojali koloba lisusu na masapo te. 30 Sika toyebi ete oyebi makambo nyonso, ejali lisusu na ntina te ete moto atuna yo mituna. Na ntina na yango tondimi ete outaki solo na Njambe. 31 Yesu ayanolaki bango: «Bondimi sikoyo? 32 Botala, tango ekoya, ya solo mpe esi eyei, mpe bokopanjana, moto na moto akojala epai na ye mpe bino bokotika ngai moko. Nzoka nde najali ngai moko te, tata ajali na ngai. 33 Nayebisi bino makambo oyo mpo ete na njela na ngai, bojala na kimia. Kati na mokili bokoleka na ninyoko, kasi boyika mpiko: Ngai nalongi mokili.»