1 Tika mitema na bino lizua buluyeke te. Bondimela nzambe pe ngai. 2 Na ndako na tata na ngai ,ba ndako lizali mingi . Soki ezalaki bongo te,nde nasilaki koyebisa bino,po ete nazali kobongisa esika pona bino. 3 Soki nakeyi kolengela bino esika, ngai moko mpeza naya kokamata bino ,natina ete esika nazali bino bozala mpe. 4 Bino boyebi nzela nini nakokenda. 5 Thomas ayanoli yesu : Solo mokonzi biso toyebi te esika ozali kokende; Boni boni tokoyeba nzela ? 6 Yesu ayanoli ye ;ngai nazali nzela,solo pe bomoi; moko te akoya na tata soki na nzela na ngai te. 7 Soki boyebaki ngai mbele boyebi pe tata na ngai; sikasiko yo boyebi ye mpe bomoni ye. 8 Filipo ayanoli yesu: Lakisa biso tata, pe yango ekokoka pona biso. 9 Yesu ayanoli ye: nazalaka na bino tango nioso mpe bino boyebi kaka ngai te, filipo? Moto nioso oyo amoni ngai amoni tata ;lolenge nini okoki koloba nalakisa bino tata? 10 Bokoki kondi te ete nazali kati na tata ,mpe tata azali kati na ngai ? Maloba nazali kolobela bino ewiti te na bokonzi na ngai moko;kasi ezali tata oyo aza kati na ngai nde azosala mosala naye. 11 Bondime ngai,naza kati na tata, mpe tata aza kati na ngai; bondimela ata pona misala na ngai 12 Na solo,solo,nazali koyebisa bino:oyo akondimela ngai akosala bikamua oyo nazali kosala, akosala kutu yakoleka mpo ete nazali kozonga epai na tata. 13 Nioso bokosenga na kombo na ngai ,nakosala yango mpo ete tata atombwama na nzela na mwana. 14 Nioso bokosenga nakombo na ngai nakosala yango. 15 Soko bolingi ngai,bokobatela mibeko na ngai. 16 Mpe,nakobondela tata pona bino,mpo atindela bino mosungi mpo ete azala na bino mpona libela , 17 Ye molimo yabosolo,ba mokili bakoki kozala naye te mpo bazali komona ye te mpe bayebi ye te,kasi boyebi ye nzambi azali na bino mpe akozala na bino. 18 Nakotika bino bitike te,nakozongela lisusu epai na bino. 19 Na tango moke bamokili bakomona ngai lisusu te,kasi bino bozo mona ngai. Mpo nazali kobika,bino mpe bokobika. 20 Na tango wana boko yeba ete nazali na tata,mpe bozali kati na ngai,nazali kati na bino. 21 Moto oyo azali na mibeko na ngai mpe kobatela yango,yewana alingaka ngai; mpe moto oyo alingi ngai akolingama epai ya tata na ngai, nakolinga ye mpe nakomimonisa epai naye. 22 Yudas oyo azali iscariote, alobi na yesu; Mokonzi pona nini ozali bobele komilakisa epai na biso kasi namokili te? 23 Yesu ayanoli: Solo moto alingi ngai ,akobatela liloba na ngai ,tata na ngai akolinga ye,biso tokoya kovanda epai naye. 24 Ye oyo alingaka ngai te akobatela mpe maloba na ngai te,liloba oyo bozali koyoka ewiti na ngai te kisi na tata oyo atindi ngai 25 Nayebisaki bino makambo oyo,natango nazalaki na kati na bino. 26 Yango wana,mosungi,ye molimo mosantu,oyo tata akotinda na kombo na ngai ,akolakisa bino makambo nioso mpe akokanisisa bino makambo nioso oyo nabandaki koyebisa bino. 27 Natikeli bino kimia; napesi bino kimia na ngai.Napesi yango te lolenge mokili epesaka. Kasi mitema na bino ekota na buluyeke te pe bobanga te. 28 Boyoki lolenge na lobeli bino:Nakeyi,mpe nakozonga lisusu epayi na bino,soko bolingi ngai ,bosepela mpo ete nazongi epai na tata,ye aleki ngai na monene . 29 Sika sikawa nalobeli bino yambo yango ekokisama mpo bondima tango ekosalama. 30 Nakoloba lisusu mingi te na bino, mpo ete mokonzi ya mokili azali koya kasi azali ata na bokonzi te likolo na ngai, 31 kasi mpo ete mokili eyeba ke nalingaka tata,nazosala kaka ndenge tata alobaka na ngai. Totelema mpe tolongwa na esika oyo.