1 Ba ndeko na ngayi na kokaki te kolobela bino lokola bato bazali na Molimo na Nzambe, kasi lokola bato oyo bazali kolanda makambu ya bomoto, lokola bana bakotami sika na Klisto. 2 Na pesaki bino miliki kasi misuni te, mpo bo koki nayino te. 3 Po bozali nanu na bonzoto. Pamba te esika koyinana na koswana ezali kati na bino, bo bika mpe bo tambola na lolenge ya bato na mokili te? 4 Soki moko na bino alobi: «Ngayi nazali moto ya Polo» mpe mosusu alobi: « Ngayi nazali moto ya Apollos» Bozo bika te na bonzoto? 5 Nani nde Appolos? to ni Polo? Ba sali oyo na nzela na bango nde bpondimelaki, ba oyo Nzambe apesaki musala 6 Ngayi nalonaki, Appolos asopelaki mayi, kasi Nzambe nde akolisaki. 7 Bongo moto alonaki na oyo asopaki mayi bazali pamba. Nzambe nde akolisaka. 8 Na bongo oyo azo lona na oyo azo sopa mayi baza moko, moko na moko akozua lifuta ya mosala na ye. 9 Po tozali basali na Nzambe, bino bozali elanga na Nzambe, pe bazali lokola ndako oyo Nzambe atongi 10 Na ngolu ya Nzambe oyo epesamela ngayi lokola motongi ndako ya bwania, na tiaki moboko pe mosusu atongi likolo na yango na bongo moto na moto akeba na lolenge azali kotanga likolo. 11 Na bongo moto moko te atiya moboko mosusu, kaka oyo etiama oyo ezali Yesu Klisto. 12 Sika oyo moto oyo akotonga na wolo, na misolo, na mabanga ya talo, na ba nzete, ba mosusu na mabaya pe mosusu na matiti, 13 mosala na ye, ekomonana polele, po misala na moto na moto ekomonana. Moto ekomonisa motuya na yango. 14 Soki misala ya moto atongi ewumeli, akozua lifuta . 15 Soki misala eziki , akozua bo bebi, kasi ye moko ako bika, bo bele lokola motoi abika na liwa ya moto. 16 Bo yebi ete bino bozali tempelo ya Nzambe, mpe Molimo na Nzambe efandaka kati na bino? 17 Soki moto abomi tempelo ya Nzambe, Nzambe akoboma ye. Po tempelo ya Nzambe eza bule, mpe bozali mbule 18 Moto te amikosa. Soki moto na kati na bino amimoni moto na bwanya na ekeke oyo, akoma «zoba» po akoma moto na bwanya. 19 Po bwanya ya mokili oyo ezali libola pona Nzambe. Ppo ekomama: «Ayokisaka bato ya bwanya soni na motambo na bango» 20 pe: « Mokonzi ayebi makanisi ya bato ya bwanya ezali pamba.» 21 Yango wana moto moko te aluka lokumu na bato, po nyonso ezali ya bino 22 ata Polo to Appolos, to Cephas, to mokili, to bomoyi, to liwa, to biloko ya lelo ou biloko ekoya. Makambu nyonso ezali ya bino, 23 mpe bozali ya Klisto na Klisto azali na Nzambe.