1 Tango na yaki epayi na bino, ndeko, na yaki te na lisukulu ya komimonisa to ya bwania tango nazalaki kosakola bosolo oyo ebombani na Nzambe. 2 Nzokande nazuai mokano yako yeba likambo moko te tango nazalaki na bino, longola kaka Yesu Klisto oyo abakamaki na ekulusu. 3 MPe nazalaki na bino n akati na bolembu, na kobanga, mpe kolenga mingi. 4 Na salelaki maloba ya mayele na ngayi te na nionso nabandaki koloba, kasi ezalaki na komonisama na nguya ya Molimo Mosanto. 5 Na tina ete kondima na bino efanda te kolandisa mayele ya bomoto kasi na nguya ya Nzambe. 6 Sika oyo tozo lobela mayele na kati na bato ya kokola, kasi bwania yango ya mokili te, to ya bakonzi ya ekeke oyo ezo leka. 7 Kasi tozali kolobela bwanya ya Nzambe na bosolo ebombami, bwania ebombami na Nzambe abongisa banda kala pona nkembo na biso. 8 Moko te ya bakonzi ya ekeke oyo ayebaki bwania yango, soki bayebaki balingaki babaka na ekulusu te Mokonzi na nkembo. 9 Kasi lokola ekomama: «Makambo oyo miso moko te emoni, matoyi moko te eyoki, makanisi moko te eyebaki, makambu kaka Nzambe abongisa pona ba oyo alingaka.» 10 Ezali makambo oyo Nzambe amonisi na Molimo na ye, mpo Molimo ayebi makambo nyonso ata bozindo ya Nzambe. 11 Mpamba te nani ayebi makanisi ya moto kolongala elimi na ye na ye? Na yango moko te ayebi mozindo ya Nzambe soki Molimi ya Nzambe ye moko. 12 Kasi tozuaki Molimo ya mokili te, kasi Molimo oyo ewuti na Nzambe, po toyeba na mpamba makambu oyo ewuti na Nzambe. 13 To lobi makambo oyo na maloba ete bwania na moto ekoki kolakisa te, kasi Molimo Mosantu alakisaka biso, Molimo Mosantu alimbolaka maloba ya bonzambe na bwania ya bonzambe. 14 Moto azali na bonzambe te azuaka makambu oyo ya Molimo Mosantu te, po ezali liboma pona ye. Okoki kososola te po ete eza bonzambe nde ba sosolaka yango. 15 Moto ya bonzambe asambisaka makambu nyonso kasi, asambisami na mutu te. 16 Po ete : «Nani akoki koyeba makanisi na Mokonzi po akoka ko tangisa ye?» Kasi tozali na makanisi ya Klisto.