Mokapo 1

1 Polo abuangami na Yesu Klisto po azala apostolo na ye na ngolu na Nzambe, pe ndeko na ye Sosthène, 2 na eklesia ya Nzambe na Corinthe oyo Yesu Klisto apetolaki. Tozokomela ba oyo basalelaka Mokonzi Yesu Klisto na bisika nionso, Mokonzi na bango mpe ya biso. 3 Tika ngolu pe kimia ya Nzambe Tata na biso mpe Mokonzi Yesu Klisto ezala na bino. 4 Nazo kumisa Nzambe na ngayi, na ngolu oyo Yesu Klisto apesa biso. 5 Apambola bino na makambo nionso, na maloba pe boyebi. 6 Apambola bino ndenge matatoli epesama na Klisto andima yango, solo kati na bino 7 Bongo bino bozangi ba makabo ya Molimo te. Lolenge bozalaki kozela yango na eminiseli ya Mokonzi Yesu Klisto. 8 Akolendisa bino kino suka bongo bokozala bokembe kino mokolo ya kosambisama. 9 Nzambe azali mokokisi na bilaka abianga bino na lisanga ya mwana na ye Yesu Klisto Mokonzi na biso. 10 Azali kolendisa bino bana mibali pe bana basi na kembo na Mokonzi Yesu klisto oyo bino bondima, mpe bokabuani ezali te kati na bino. Nazo bondela bio, bozala lisanga moko makanisi moko pe molimo moko. 11 Nazuaki sango na b ino na batoi ya Chloé ndenge bozali koswana pamba kati na biso. 12 Ba oyo bazo loba : «ngayi nazali ya Polo, to ya Apolos, to ya Cephas, to ya Klisto». 13 Klisto akabwani? Polo abakisamaka pona bino? Bo bozuaka libatisi na kombo ya Polo? 14 Natondi Nzambe po ete batisa bino te, kolongola kaka Crispus na Gaius. 15 Mpo ete moko te aloba ete abatisama na kombo na ngayi. 16 (Na batisaki ndako mobimba ya Stephanas, nayebi te soko na batisa ba mosusu). 17 Natindama te epayi ya Klisto po na batisa bato kasi po na teya sango malamu, na mayele ya bamoto te, po ete ekulusu ya Klisto ezala na nguya na yango te 18 19 Bongo sango na ekulusu ezali liboma na miso ya ba oyo bazo kufa . Po na bato Nzambe abikisa , ezali na nguya ya Nzambe. Po ekomama ete: «Nako bebisa bwanya ya bato na bwanya. Nako balola bososoli ya mayele». 20 Wapi mutu na bwanya? Wapi mutu atanga? Wapi molobeli ya mokili oyo? Nzambe abaloli bwanya ya mokili oyo te na liboma? 21 Banda mokili na bwanya abosani Nzambe, esepelisi Nzambe kobikisa ba oyo ba ndimeli na liboma ya malakisi. 22 Bongo ba Yuda basengi bilembo ya bikamuisi, ba gracs basengi bwanya. 23 Kasi tozo teya Klisto abakisama, libanga ya libaku po na ba Yuda, mpe liboma mpo na ba Grecs. 24 Bongo pona ba oyo Nzambe abiangi, Yuda to Grecs , tozo teya Klisto likola nguya mpe bwanya ya Nzambe. 25 Pamba ete liboma ya Nzambe eleki bato na bwanya, mpe bolembu na ye makasi koleka bato 26 Zua na bokebi ebiangeli na yo ndeko.Mukie kati na bino bazalaki na bwania na lolenge ya bo moto. Moke kati na bino bozalaki na nguya, moke kati na bino bozalaki na mbotama ya malamu. 27 Kasi Nzambe apona biloko ezanga makasi kati na mokili pona kopesa yango makasi. 28 Nzambe apona oyo ya mukie mpe ba boya na mokili. aponaka ata biloko ezangi tina , po nako bebisa oyo ya tina. 29 Asali bongo po ete moto te a beta ntolo liboso na ye. 30 Na ntina na oyo Nzambe asala , sika oyo bozali na Klisto Yesu oyo akoma pona biso bwania eya na Nzambe sembo na biso, libulami na biso pe lifuti na makila na biso, 31 na boye ekomama: «oyo azo beta ntolo, abeta ntolo na Mokonzi.»