Mokapo 3

1 Mawa na engumba motomboki mpe ya mbindo , mboka etonda batomboki. 2 Ayokaka mote te, ayoka mpe toil te , atiela Nzambe motema te, apusanaka mpe liboso na Nzambe na ye te. 3 Bakonzi na bango bazali bo bankosi bazali konguluma, basambisi bo bambwa ya zamba ya mpokwa, batikaka eloko te na ntongo. 4 Ba sakoli na bango batomboki, bato na nkanza mpe ba nganga Nzambe batioli mibeko mpe ko komisa biloko esantu mbindo. 5 Yawe azali sembo kati na bango, asalaki mbeba te, tongo nyonso azangisaka te koyebisa bango malako na ye, kasi moto na mbindo ayokaka soni te. 6 Na boma ba mboka , kokweyisa ba ndaku na bango ya milayi, na tika ba nzela mpe bingumba na bango polele. 7 Nazalaki koloba : soki kutu olingaki kobanga ngai mpe kosepela na toli mbele ndaku na yo ebebisama te mpe bitumbu bilanga kozua yo te kasi bowelaki kosala mabe. 8 Bozela ! elobi Yawe ! mokolo na kotelema mpona sambisa , nazuaki mokano ya ko sangisa ba mboka mpe ba bokonzi mpona kosopela bango moto makasi ya kanda na ngai mpamba te na nzela ya moto ya zuwa na ngai mboka mobimba ekotumbama. 9 Boye na ko pesa mabota bi mbebu ya sembo mpo ba belela banso Yawe, mpe basalela ye lolenge moko. 10 Kowuta na ngambo ya ebale ya ethiopie ngambumeli mpe baye ba panzana bako memela nga mabonza. 11 Na mokolo yango, misala ezalaki komema yo na mabe, ekoyokisa yo lisusu soni te, mpona kolongola moto oyo azalaki kododwa na lolendo , akozala lisusu na lolendo te na ngomba na ngai esantu. 12 Na kotika kati na bino libota moke eza na komikitisa , mpe ako mibomba kati na kombo na Yawe. 13 Naye batikali na Israyele ba kosala lisusu masumu te, lokuta ekozala lisusu kati na bango kasi ba koleyisa bibwele mpe bakopema , moko te akotungisa bango. 14 Beta lokito ya esengo elenge mwasi ya Sion, nganga na esengo Israyele! Sepela mpe zala na nsai na motema nay o mobimba elenge mwasi ya Yelusalema. 15 Yawe alongoli etumbu, azongisa moyini nayo sima , mokonzi ya Israyele , Yawe azali kati nayo , mpasi ekokomela yo lisusu te; 16 Na mokolo yango, ba koloba na Yerusaleme: kobanga te! Sion, maboko nayo elemba te. 17 Yawe Nzambe nayo azali na kati nayo bo engambe ya kobikisa, ako sala nay o esengo ya motema na ye , akovanda kimia pona bolingo na ye epayi nay o, ako tambola likolo ya esengo. 18 Na kosangisa bato ba bima na libumu nayo bazali na mawa, mosika na ba milulu mpe balatama na nsoni. 19 Tala na tango yango na kobundisa batioli na bino , na kokangola ba kakatani mpe nako yamba ba oyo babenganaki bango , na kosala na bango eloko ya lokumu mpe ya nkembo na bikolo nyonso bazali na nsoni. 20 Na komema bino , nako sangisa bino, nako sala na bino eloko ya lokumu mpe ya nkembo na kati ya bikolo nyonso ya mokili, na tango na kozongisa ba kangami liboso na bino , elobi Yawe.