Mokapo 1

1 Liloba na Yawe epesamaki na Sofonia, mwana ya Kusi, mwana ya Gedalia, mwana ya Amalia, mwana ya Ézékiasi, na tango na Yosiasi, mwana ya Amona, Mokonzi na Yuda. 2 Nakoboma nyoso ezali na mokili, elobi Yawe; 3 Bato mpe banyama, bandeke ya likolo mpe bambisi na mai, biloko mabe mpe elongo na bato na nko , nakosilisa bato na mokili, elobi Yawe. 4 Nakosembola loboko na ngai likolo na Yuda, mpe bavandi ya Yelusaleme, nakosilisa ndambo ya Baala, kombo ya batoma mpe banganga nzambe elongo, 5 baye bazali kofukama na motondo, liboso na mapinga na likolo, kokataka seleka na kombo na Yawe mpe na kombo ya mokonzi na bango, 6 baye bapesi Yawe mokongo, balukaka ye te, mpe batunaka ye te, 7 Kimia liboso na mokonzi Yawe ! Mokolo na Yawe ebelemi ! Yawe abongisaki mbeka mpe aponaki babiangami na ye. 8 Na mokolo ya mbeka na Yawe, bakonzi mpe bana na bango bakokwa etumbu, mpe bato banso balataka molato ya bapaya. 9 Na mokolo yango nakopesa etumbu na baye bakotaka na ndako molakisi na bango mpe batondisaka yango na biloko na nkanza mpe moyibi . 10 Na mokolo wana, elobi Yawe, tangba ekouta na ekuke ya bambisi, komilela na ngambo mosusu ya engumba mpe likama monene na bangomba . 11 Bolela , bavandi na Matese, zambi bayi mimbongo mpe bato na bozwi banso bakufi. 12 Na ntango wana, na koluka luka na Yelusalema na mwinda na maboko , mpe nako beta bato oyo bazali na bopemi na bozui na bango mpe bazali koloba na mitema na bango, Yawe asala mabe mpe bolamu 13 te. Bako punza biloko na bango mpe ba ndako na bango ekotikala polele; bakotonga bandako ba tikala kolala te ba kolona vino kasi bakomela yango te; 14 Mokolo monene ya Yawe ekomi pene, ezali koya na lombango , mongongo na yango ezali koyona, engambe azali ko nganga na mongongo ya pasi. 15 Mokolo yango ezali mokolo ya somo, ya mawa, ya bwale, ya kobebisama, ya molili, ya batu makasi , ya londende , ya milinga, 16 Mokolo oyo kelelo eko beta mpe lokito ya bitumba pona kotelemela bingumba ya makasi mpe ba ndako ya milayi. 17 Nako kotisa bato na mawa makasi, bako tambola bo bafuti miso mpo basalaki masumu , nako panza makila na bang obo putulu mpe misuni na bang obo matiti ya fulu. 18 Palata mpe wolo na bango ekoki kokangola bango te, na mokolo ya kanda na Yawe, na moto ya zuwa na ye ekolo mobimba ekolakisama mpo ako bebisa na pwasa bato ya ekolo.