Mokapo 2

1 Natomboli miso mpe namoni, moto moko asimbi nsinga ya bopimi. 2 Nalobi: akei esika nde? Mpe alobi na ngai: Nakei kopima Yelusaleme mpo nayeba bolai mpe bokuse bwa yango. 3 Nde tala, anzelu oyo azalaki kosolola na ngai abelemi, mpe anzelu mosusu ayei mpe bakutani. 4 Alobi na ye: kilingana, loba na elenge mobali boye: Yelusaleme ekozala engumba monene, mpo na boyike bwa bato na banyama bakofannda kati. 5 Yawe alobi, nakozala mpo na ye efelo na moto zinga zinga, mpe nakozala nkembo mpe bongengi na ye. 6 Bokima, bokima longwa na ekolo na moyi, elobi Yawe, zambi napanzi bino o bisika ya mipepe minei ya mokili, elobi Yawe. 7 Mibikisa Siona, yo oyo ofandi epai na elenge mwasi ya Babyloni. 8 Elobi Yawe na mapinga: Sima na yango, nde nkembo eyingeli! Zambi atindi ngai epai na bikolo biye bibotolaka bino biloko, pamba te, ye oyo asimbi bino ati ngai mosapi o liso. 9 Tala namami loboko na ngai likolo na bango, mpe bakonyongama na baye banyokolaka, nde bongo bokoyeba nazali na etinda uto Yawe. 10 Ganga na esengo mpe sepela elenge mwasi na Siona! Pamba te, nazobeleme mpe nakofanda o ntei ya bino, elobi Yawe. 11 Bikolo nzike ekokangama na Yawe mokolo mona, mpe bakokoma bato na ngai, nakofanda kati na yo, bongo wana nde okososola te Yawe atindaki ngai epai na yo. 12 Yawe nde akwi Yuda lokola libula na mabele na bule na ye, mpe aponi lisusu Yelusaleme. 13 Moto nyoso afanda swi o boso bwa Yawe, zambi ye atelemi uto efandelo na ye na bule.