Mokapo 1

1 Sanza ya mwambe, mobu ya ibale ya bokonzi ya Dalusi, liloba na Yawe na nguya epesamaki na Yakalia, mwana na Ido, mosakoli na maloba maye: 2 Yawe (na nguya) azwaki nkanda ekasi na batata na bino. 3 Lobela bango boye: Ngai Yawe na mapinga nalobi: Bozonga epai na ngai, ngai mpe nakozonga epai na bino, maloba naYawe na mapinga. 4 Bowulana na batata na bino te, zambi bango ata ko basakoli ba yambo balobaka na bango: Elobi Yawe na mapinga, botika nzela mabe, elongo na misala mabe, kasi bango se mangbongi, bakebaki na mbela na ngai Yawe na nguya te. 5 Wapi batata na bino? bongo basakoli bakobika seko na seko? 6 Nzokande maloba mpe mitindo napesaka na basali na ngai, basakoli, boni-boni batata na bino batosa yango te? Batomboka mpe koloba: Yawe asali na biso bo lolenge akanaka, engebene na etamboli mpe misala mya biso. 7 Mokolo na tuku ibale na inei ya sanza ya zomi na moko, nde sanza na Kebata, mobu ya ibale ya bokonzi ya Dalusi, liloba na Yawe epesamaki na Yakalia, mwana na Belekia, mwana na Ido, mosakoli, na maloba maye: 8 Nanongaki na butu, mpe komona moto moko likolo na mpunda motane, atelemaki nzinga nzinga na banzete na Adasa, na mwa esika ya molili, sima na ye ba mpunda nzike, ya mitane, ya muyindo mpe ya mpembe. 9 Nde nalobi: Mokonzi, ba mpunda iye ya nani? bongo anzelu alobi na ngai: Nakososolisa yo ba mpunda izali nini? 10 Moto oyo azalaki zinga-zinga na banzete na Adasa akwi liloba mpe alobi: Bampunda nde baye Yawe atindaki kongayika o mokili. 11 Mpe bango koyebisa anzelu na Yawe, oyo atelemaki zinga zinga na nzete yna Adasa, koloba: Tongayiki o mokili, mpe tala, mokili mobimba efandi kimia mpe swi. 12 Nde anzelu na Yawe kokwa maloba boye: Yawe na mapinga, kino tango nini okoyokela Yelusaleme mpe bingumba na Yuda mawa te? Zambi ekoki mibu tuku motoba ozali obe na nkanda ekasi likolo na yango. 13 Nde Yawe na monoko na anzelu na ye, ayanoli ngai na maloba malamu mpe ya kobonda motema. 14 Anzelu yango alobi lisusu na ngai: Ganga, mpe alobi Yawe na mapinga, natondisami meke na zuwa mpo na Yelusaleme mpe Siona. 15 Zambi nasilikaki mwa moke na bikeko bitonda lolendo, kasi lokola bakobisi obe na mabe, nde nasimbami lisusu na kanda koleka, pembeni bazwa etumbu. 16 Na yango elobi: Nazongi na Yelusaleme na motema mawa, zambi ndako na ngai esengeli etongama, mpe nde singa esembwami likolo na yango. 17 Ganga lisusu mpe loba: Elobi Yawe na mapinga, bingumba bya ngai nde ezwi lisusu bozwi bebo; Yawe akobonda lisusu Siona, akopona lisusu Yelusaleme. 18 Nasemboli miso mpe natali, bongo namoni maseke manei. 19 Nalobi na Anzelu pembeni na ngai: Maseke mango eloko nini? Ye koyanola boye: Ezali maseke maye mapanzaki Yuda, Yisalaele mpe Yelusaleme. 20 Bongo Yawe alakisi ngai batuli banei. 21 Nde nalobi: Bayei kosala nini? Alobi: Ezali maseki manei oyo epanzaki Yuda, lokola ata moko te atomboli moto, nde batuli bana bayaki kolengisa yango, mpe kobuka maseke na bikolo biye bitelemisaki liseke na ekolo Yuda, mpo na bopanzi bayi-Yuda.