MOKAPO 3

1 Mawa na mboka oyo makila esopani, batonda na lokota, batonda na mobilu, bamikotisa na kopunza. 2 Ekoyokana lokito yafimbo, lokito ya mokolo na mpunda mpe ya makolo. 3 Babundi na mpunda, bandongwani na mipanga na makonga bingali makasi, etuluku na bato ba zokaki mpe ba waki, bimbembe sukate bakokweya likolo na baweyi. 4 Likolo boyike ya bandumba, etondisami na bapengwisi, moto na soloka, oyo ateki bikolo na bandumba na baye ekolo na bo ndoki. 5 Tala natombo keli yo elobi yawe na mapinga na kotombola elamba na yo kino na elongi na kolakisa bolumbu na yo na bikolo mpe nsoni na bokonzi. 6 Na kosopela yo mbindo, okozalana motuya te mpe bakosaka na yo. 7 Baye banso bakomono yo bakokima mosika na yo mpe bakoloba niniwe epanzani nani akolobela bango wapi okoluka ngai pona balendisi. 8 Oleki malamu koleka noa moni? oyo afandaki na kati ya ba bibale minene, ezingami na mayi azwi mayi na monano lokola ebatelo mpe lopango? 9 Ethiopia mpe etuluku ya ba ezipito basali nguya, puta mpe balibia bazaki kosungana. 10 Nzoka nde, bakimaki na mboka mopaya, bakotaki na boumbu, ba bomaki banana bango zingazinga ya balala inso, babeti mbese na tina na bato na lokumbu, mpe bakangaki minyololo na bakolo banso. 11 Yo pe, okolangwe okomibomba, yo pe okoluka ebombamelo pona kokima banguna na yo. 12 Bibombamelo ya bambolombolo bikokoma lokola nzete na mosuke figi elongo na mbumo ete lingwa! soki bangisi yango, bikokwa ya na minoko ya baye balingi kolia yango. 13 Tala bato na yo bakomi lokola basi, bikuke na mboka bifungwami liboso na banguna na yo bikangelo inso bitumbami. 14 Botoka mayi mpo ezanga te, bobongisa bibombamelo na bino, bokota na potopoto bobongisa etumbelo na biliki briki. 15 Wana, moto ekotumba yo, mopanga ekosilisa yo lokola mabanki, bosangana lokola mabanki 16 Bato na bino ya mombongo, bazalaki boyikekoleka minzoto na likolo, bazali lokola mabanki bafongoli mapapu kopumbwa. 17 Bakonzi na yo bakomi lokola mabanki bankumu na yo lokola nzike na mabanki oyo babomba ka na ba nzete otango ya malili, soki moyi engali bapumbwe mpe toko ye bisaka ba bakendeke. 18 Ba bateli mpate balali mpongi, mokonzi na sulia, bilombe bapemi, bato na yo ba bulungani likolo na ba ngomba, nani akosangisa bango. 19 Nkisi ezali te mpona kozoka na yo pota na yo ezali ya liwa baye banso bakoyoka kolobela yo, bakobetela yo maboko, nani oyo onyokolaki te.