MOKAPO 2

1 Mobebisi atelemeli yo, batela ebombelo, senzelana balabala lendisa ngoku na yo, tondisama na nguya. 2 Mpo yawe azongisi nkembo na yakobo mpe ya Isalaela, zambi ba miyibi, bayibi mpe ba bebisi bikangelo na bibwele. 3 Banguba na bilombe bizali motane, ba bundi batati molato na motane ngwa! bibende ya makalona bangobi ngengi lokola moto, mokolo likolo. 4 Makalo bikeyi na bitumba, ewelisi na bisika komona yango lokola esuke ya moto, bazokima lokola milikali. 5 Bakanisaka bilombe mibala, ba tata banina kotambola ba selingwaka na mapango, bambongisa pona komibatela 6 Bizipoli na bibale bifungwami, mpe bandako bikweyi. 7 Nayango, atikalaki pamba mpe bakeyi, bakeyi, basi basali bimiswaki mino lokolo bibenga, bamibeti, tolo 8 Niniwe ezalaki lokola bitima mayi, tala bazali kokima, telema! telema! kasi mokote azongi. 9 Punza palata mpe wolo, ezali bomengo ezanga suka mpe nkita ya biloko na motuya ya lolenge inso. 10 Bazalo kopunza, kobebisakopanza, mpe mitema mitu tumolami mabolongo mibukani, ba ngoku minyokwami bilongi binso bizingami 11 Nini ekokoma eyanganelo na bankosi,eleyelo ya bana na nkosi, wapi epai bamibombi nkosi mwasi mpe bana baye, mpe moto moko te atungisa bango. 12 Nkosi akopasala mpona bana na ye,akobomela basi na ye akopasola, bibembe ya misuni kati ya mabulu na bibombelo na ye. 13 Tala na tomboki na yo, elobi yawe na mapinga, na kobondisa makalo mayo na putulu,mopanga ekopasola bana nkosi, na kolongola bileyi na ekolo na yo, mpe mingongo na bayebisi biko yokana te.