Mokapo ya 3

1 Tala, Nakotinda ntoma nangai oyo bozali kozela. Ye akobongesila nga nzela. Tala, azali koya, ye akosakola boyokani na ngai na bino. bongo na mbala moko, Mokonzi oyo bozali koluka akokota naye ya bosantu. 2 Nani akotikala na bomoi mokolo Yawe akoya? nani akotelema, tango ye akomimonisa? ya akozala moto yo ekomisaka bilamba pembe. 3 Akolongola mye Nyoso, akobonsisa bango lolenge ba bongisaka bongo. boye bakokoka kopesa makabo na bango na Yawe na lolenge mibeko na yango ezali kotinda. 4 Nzambe akondima makabo ya bato ya Yelusaleme mpe ya Yuda mobimba, lolenge ezaki liboso na ba mibu eleka. 5 Nakoya kati na bino mpona kosambisa bino. Nakozelisa te bofunda banganga kisi mpe bandumba, ba oyo bakataka ndai ya lokuta mpe ba oyo bafutaka basali malamu te, ba oy bnyokolaka basi bakufela mibali, bana etike, to bapaya na mpe baoyo nyoso bbangaki ngai te. 6 Nagai nazal Yawe, nabogwanaka te kasi bino bokokani kaka na koko na bino Yakobo. 7 Lolenge bakoko na bino basalaki, bino mpe botika kolanda mibeko na ngai, mpe bozali kotosa yangfo te. Bongela ngai, boye ngai mpe nakozongela bino. kasi bozali kotuna: Tokozongela yo ndege nini, 8 Moto akoki kokosa Nzambe? Nzokande bino bozali kokosa ngai, mpe bozali koktuna ngai: Tozali kokosa yo na nini? Ezali lolenge bozangaka kopesa ngai moko na zomi ya biloko ya bilnga na bino, mpe eteni ya makabo oyo bopesaka ngai. 9 Bolakelami mabe ekolo mabimba, mpe bozali kokosa nai! 10 Bomema na ndako na nangai moko na zomi ya biloko na bino, mpe bilei ezalaka na ndako mna nagai elobi Yawe: bomeka nagi mpe botala soki nakofungola bino likolo te mpona konokisela bino mapamboli lokola mbula. 11 Nalaki bino, nakopekisa mankonko eya kobebisa bilanga na bino ezala ya ndunda, ya loso, to ya vino, elobi Ngai Yawe mpkonzi na mapinga. 12 Bato ya likolo nyonso bakoloba ete bozali bato ya esengo, pamba te mboka na bino ekozala malamu, Elobi Ngai Yawe mpkonzi na mapinga 13 Nzambe alobi boye: bino nbozali na maloba mabe mpo na ngai, mpe bozali kotuna, maloba nini ya mabe tolobi mpo na yo? 14 Tala eloko bolobaki: kosalela Nzambe ezali na tinate totosa mibebeko na ye mpe tolela na miso na ye Yawe mokonzi na mapinga mpona kozwa bolamu kasi tozwa eloko moko te. 15 Tozali komona yango sikoyo: bobele ya lufundo bazali na esengo mpe baye ya mobulu bazwaka bolamu. Ata batomoli nzambe bakikaka kaka. 16 Bongo baye batosaka Nzambe balobami bango na bango; Yawe atie matoyi mpe ayoki makambo na bango. Na miso na ye bakomi bakombo yha baye nyoso botosaka ye mpe bakumisaka ye. 17 Sima, Yawe monkonzi na mapinga alobi: mokolonakolakisa nguya na ngai, bato wana bakozala bato nangai, bakozala ekolo na ngai penza. Nakokotela bango, lolenge tata akotelaka mwana oyo atosaka ye. 18 Boye bokomona lisusu bokesini kati ya bato ya bosembo na bato ya mabe, kati na baye basalelaka nagi Nzambe na baye basalelaka ngai te.