Mokapo ya 2

1 2 Sikawa, nakebisi ba nganga Nzambe! Soki boyoki te, mpe soki bosali makasi mpo bopesa ngai lokumu oyo ekoki na nga te, nakotindela bino etumbu, bomego malakisi bino eko bongwana elakela mabe, ya solo, nakosala bongo, mpo ete nazali komona makambo na ngai nyoso pamba. 3 Tala nakobikisa mabota na bino, na kobwakela bino bosoto na elongi, bosoto ya banyama oyo bopesaka makambo na bamilulu na bino, bakobwaka bino nzela moko na yango. 4 Ngai Yawe ya nguya nyoso nalobi: Bokopyeba ete ezali ngai moto nakebisi bino, mpe nabatela boyokani oyo nasalaki na Levi mpe libota. 5 Na boyakani wane, nalakaki bango bomoi mpe kimia; kasi bango balakaki ngai botosi, Ngai nakokisaki elaka na ngai, bango mpe bazalaki kotosa ngai Nzambe na bango. 6 Ateyaki bobele mateya ya bosolo na monoko na ye, abimisaki ata liloba moko ya lokuta te. azalaki kosalela ngai na kimia mpe na bosembo nyama, mpe abongolaki mitema ebele ya basali mabe. 7 Mpo ete, mosala ya nganga Nzambe ezala kolakisa bato bayeba ngai Nzambe. Bato bayaka epai na bongo mpona koyeba lolenge na ngai, Yawe ya nguya nyoso. 8 Kasi bino, banganga Nzambe, botiki nzela wana, mateya na bino ebungisi bato ebele, bobomi boyokani nangai na bino ya Lewi. Ngai Yawe mokonzi na mapinga moto nalobi boye. 9 Bongo, ngai nakosala ete ekolo mobimba ya Isalaele eyina bino, mpe eyokisa bino nsoni, mpo boboyi lolanda makambo ngai nalingaka, mpe bozali kobanga bato mosusu tango bozali koteya bato mibeko nangai 10 Biso nyoso tozali na Tata se moko? tokelami na Nzambe se moko? Boni tozali kotikama biso na biso, na lolenge tozali kobebisa boyokani oyo Nzambe asalaka batata na biso? 11 Bato ya Yuda babesi elaka na bango na Nzambe basali makambo moko ya mabe mpe ya nsoni na Yelusaleme mpe na mboka ya mobimba ya Isalaele pambate, babelisi mboka mobima ya Isalalele pambate, babebisi mboka ya bosantu oyo Yawe alingaki mpe apambola, babala basi oyo basambelaka banzambe ya bapaya. 12 Yawe akolongola libota na ye mombimba kati na Isalaele, ezala mpe moto oyo apesaka Yawe makabo mpo akitisa ye motema. 13 Botala likambo mosusu oyo bozalio kosala. Bozali kolelalela mpe kotondisa mesa ya mabonza ya Yawe na maai na miso, mpo Yawe atalaka lisusu te makabo na bino, mpe ayambaka yango lisusu te. 14 Bozali kotuna: mpo na nini boye? ezali mpo bato mosusu na kati na bino bazali koboya basi oyo ba balaki basi na bango ya libela. 15 Akomisi bango moto se moko, mpoba bobata bana oyo bawuti na Nzambe, bokeba, matikala mayuela se moko, moto moko te asundela mwasi naye abalaki tango azalaki elenge. 16 Yawe Nzambe ya Isalaele alobi: nayninaka mobali aboya mwasi nate, yango ezali lokola obomiye. yango wana bokeba botikala moto se moko, kotikana te bino na bino. 17 Bolimbisi Yawe na maloba na biso! kasi bozali kotuna: tolembisi ye na nini? tango bozali koloba: Yawe asepelaka na bato oyo basalaka mabe, alingaka bango, to mpe Nzambe oyo atiaka bosembo azali wapi?