mokapo ya 1

1 Makambo Yawe ayebisaki ba Isalaele na monoko ya malaki. 2 Yawe alobi boye na na bato ya ekolo naye: ngai nakingaka bino. Kasi bolobi: olakisa bino bolingo yango na nini? Eazu azalaki ndeko ya Yakobo te? Elobi Mokonzi. Nzokande nalingaki Yakobo. 3 Nayinaki Ezau, na ba Edam, bato ya libota na ya Eazu; napanzaki bangomba na bango, mpe napesaki libulu na bango na bambwa ya esobe. 4 Soki ba Edam balobi: bamonaki makambo na biso, kasi tokotonga yango lisusu, ngai Yawe na mapinga nalobi boye: Botonga kasi ngayi nakopanza yango lisusu. bato bakopesa bango ba kombooy: "mboka ya mabe", mpe " ekolo Yawe asundola libela". 5 Bakomona makambo nyoso wana, mpe bakolobna: Yawe azali kolaki nguya naye, ata na mosika ya bandeko ya Isalaele. 6 Ngai Yawe na nguya nyoso alobi na banganga Nzmbe boye: Mwana nyoso atosaka tata naye, mpe mosali nyoso atosaka mokonzi naye. Ngai nazali tata mpe mokonzi na bino? Mpona nini botosaka ngai te, mpe bokumisaka nagai te? bozali kotiola ngai Nzambe na bino, mpe bozali kotuna: totioli yo na ninin? 7 Bozali komema makabo na lolenge ebongi te na mesa na ngai ya mabonza, mpe bozali kotuna: tozali kobebisa lokumu naye na nini? ezali nde mpo bozali komona mesa na nagi ya makabo pamba. 8 Tngo bomemelakangai mkabo ya ba nyame ekufa miso, to ya tenguma to mpe ya maladi, bokonisi ete ezali malamu? bomeka kopesa nyama ya lolenge wana na motamnuisi ya mboka na bino ; bokanisi ete ye akosepela mpe akosalisa? ngai Yawe ya nguya nyoso moto natuni bino boye. 9 Sikoyo bino bobondela ngai Nzambe na bino mpo nayokela ekoàlo nagai mawa. Bokanisi ete sima ya makambo nyoso bosali, nakoyokela bino? ata mokote! 10 Nani moko kati na bino akanga bikuke ya ndako na ngai, mpo batika kopelisa moto ezanga tina na mesa na ngai ya makonza oyo bopesaka ngai. ngai Yawe na nguya nyoso nalobi boye. 11 Pamba te banda tongo ti pokwa bato ya likolo nyoso bandimi etet nazali Nzambe. Bazali kotumba malasi mpo na kokumisa ngai, mpe bazali komemela ngai makabo oyo ekoki na ngai ya solo, bato ya likolo bandimi ete bazali Nzambe. Ngai Yawe na nguya nyoso moto nalobi boye. 12 Kasi bino bozali komona nangai Yawe pamba, na lolenge bozali koloba ete mesa lya makobo ya Yawe ezali na ntina penza te, bakoki kotiela ye makabo ya mabe. 13 Bozali koloba: tolembi na makombo yango! Bozali kotiola ngai Yawe ya nguya nyoso.Tozali komemela ngai malabo ya banyam ya koyiba, toya tenguma, to mpe ya maladi. Ngai Yawe natuni boyue: Bokanisi ete ngai nakoki kondima makabo wana? 14 Elakisi ya mabe ezala na mokisi azali na banyama ya malamu, kasi alongoli moko ya mabe mpona kopesa ngai yango likabo! pamba te ngai nazali mokonzi monene, bato ya likolo nyoso bayebio ete nazali Nzambe ya sukisa. Ngai Nzambe ya nguya nyoso nalobi boye.