Mokapo ya 3

1 Ngai moto oyo namona pasi na lingenda na kanda na Yawe. 2 Ye amemaki ngai, atambwisi ngai na molili mpe na moi te. 3 Epai nanga nde abongola loboko naye mokolo nyonso. 4 Akaukisi mosuni na ngai mpe loboso na ngai, abukibuki mikwa na ngai. 5 Atongi pembeni na ngai, azingeli ngai na ngenge mpe minyoko. 6 Afandisi ngai na bisika ya molili lokola bato basili kokufa kala. 7 Azingeli nga na lopango mpo nabima te, atieli nga minyololo ya kilo. 8 Nabiangi ye mpo asunga ngai, aboyi losambo na ngai. 9 Abomi ba nzela na ngai na mabanga minene, mpo na leka te. 10 azalaki mpo na ngai lokola ngombolo oyo ezali kolambela, lokola nkosi oyo abombani. 11 Apengwisi banzela na ngai, apasoli ngai, abwakingai kozala moto pamba. 12 Akamati litimbo naye, ati ngai na nga ngbata na likonga lokola nyama ya koboma. 13 Akotisi ngai nanzoto nangai mobimba makonga. 14 Nakomi eloko ya kotsiola na bato nangai, bazali, kotiangai na nzembo na bango ya mokolo na mokolo. 15 Atondisi ngai na bololo, amelisi ngai nzongo. 16 Abuki mino nangai na mabanga, azipi ngai na putulu. 17 Alongoli,ngai kimia, nabosani malamu; 18 Mpe na lobi, nguya nagai elimwe, na zali na elikia lisusu te epai na Yawe. 19 Tango nazali kokanisa pasi na ngai mpe kowaya waya nangai, yango nzingo mpe bololo. 20 Tango molimo na ngai ezali kokanisa nazali koyoka pasi kati nagai. 21 Tala eloko nazali kokanisa na motema na ngai, yango nde ekopesa ngai elikia 22 Bolamu na Yawe esili te, mawa naye ekomi na suka te. 23 Yango eko monanaka tongo nyonso, bolingo nayo ezali monene. 24 Yawe azali libula nangai, nakozala na elikia katinaye. 25 Yawe azali malamu na moto akolikia naye epai na molimo oyo ezali kolukaye. 26 Ezali malamu ete moto azela na kimia mpo nakozela lobiko na Yawe. 27 Ezali malamu na moto kondima mpasi na bolenge na ye. 28 Afanda ye moko mpe kimia tango Yawe azali kotindelaye yango. 29 Akomisa monoko naye na putulu, akimisa naino elikia te. 30 Apesa litama naye na moto oyo akobeta ye, akondisama na soni. 31 Mpo Mokonzi akoboya libela te. 32 Kasi tango ayeisi etumbu, ayokaka mawa mpona bolingo naye. 33 Zambi anyokolaka pamba te, mpe koyokisa nana na bato mpasi. 34 Ntango bazali konyatela na makolo, bakanga ni nyoso ya ekolo. 35 Ntango babuki mibeko ya bato, liboso na oyo aleki likolo. 36 Ntango bakitisi moto na likambo naye, mokonzi azali komona ye te? 37 Nani akoloba likambo mpe esalemi? soki Yawe te apesiye ndingisa te? 38 Ezali te mpona mokoano na Yawe oyo aleki likolo nde mabe mpe malamu ebimaka? 39 Mpo na nini moto, ya bomoi akoyoka mabe mpona masumu naye? 40 Toliuka nzela na biso mpe tomeka, mpe tozonga epai na Yawe. 41 Totombola matema na biso mpe maboko epai na Nzambe na lokolo. 42 Tosali lisumu mpe totomboki, yango mpe olibisi masumu na biso te. 43 Obombani kati na kanda yo mpe olandi biso, obomi kozanga mawa. 44 Obombani na lipata, mpo malombo malekate. 45 Okomisi biso elokona mbindo, mpe matiti maboyami kati na bato. 46 Banguna nabiso nyonso bafungoleli biso monoko. 47 Nsomo mpe kobanga libulu ekomi epai na biso, kokufa mpe kobeba. 48 Mai na miso nangai ezali kosopana mpona libebi ya moseka nabato nagai. 49 Liso nangai ezali kotanga mai nakotikate. 50 Kino Yawe akotala nanse, akomona uta na likolo. 51 Liso nangai epesi molimo nangai mpasi mpona libebi ya baseka na engumba nagai. 52 Babengani, lokola ndeke, ba oyo bazali bangu na nangai. 53 Babwaki ngai na libulu, mpe babwakeli ngai mabanga. 54 Mai maleki motu nagai, nalobi ete na bungi. 55 Nabeleli kombo nayo Yawe nanse ya libuliu. 56 Oyoki mongongo nangai, kokanga litoi nayo na kolela nangai tye. 57 Mokolo na belelakiyo, opusanaki, olobaki nagai kobanga te. 58 Mokonzi, olobeli molimo nanga, olimbisi bomoi nangai. 59 Yawe, omoni ba pasi oyo bayokisi ngai, kata likambo nangai. 60 Omoni ndenge bazongiselinga mabe miango nabango kotelemela ngai. 61 Yawe oyoki kofingfa na bango, miango na bango kotelemela ngai. 62 Maloba ya banguna naga, mpe mikano na bango kotelemela nga mokolo mobimba. 63 Tala Bafandi mpe batelemi nazali banzembo na bango. 64 Yawe, okofuta bango engebene na misala nba bango. 65 Okokomisa bango motema makasi, na elakeli mabe nayo epai na bango. 66 Okolanda ban,go na kanda nayo mpe okoboma bango na mokili nayo Yawe.