Mokapo ya 2

1 Yawa nakanda naye, azipi mwana mwasi na siona na lipata, abwaki kobanda na likolo kino na nse, nkembo na yisalaele akanisi ata etieloma makola naye na mokolo na kanda naye. 2 Yawe abuki bifandelo nionso na yakobo, ayoki ata mawa te, na nkele naye abwaki nanse bisika nionso ya makasi ya mwana mwasi ya yuda, abwaki yango na mabele bokonzi mpe bakonzi nayango. 3 Na kanda naye ya makasi, asilisi bilombe nyoso ya yisalaemle, alongweli bango loboko, naye ya mobali; apeliseli yalobo ndemo na moto, oyo abebisi pembeni nyoso. 4 Akamati likonga lokola monguna, atelemi na loboko naye ya mabali lokola motelemeli. 5 Yawe akomi lokola monguna ya yisalaele, abebisi bandako na bango nyoso ya makasi, abuki binumba oyo batonga makasi, atondisi mwana mwasi na yuda, abakisi kolela mpe mawa. 6 Apanzi hema oyo ezalaki kitoko lokola elanga, apanzi esika ya kokutana, Yawe asali ete siona abosana mikolo ya feti, aboyi mokonzi mpe nganga. 7 Yawe aboyi mesa naye ya mabonza, aboyi esika naye ya bule, apesi na maboko ya banguna mapango kitoko ya yelusaleme, ko nganga ya banguna ekomi epa na Yawe, lokola mokolo moko ya feti. 8 Yawe akani kobebisa lopango na mwana mwasi ya siona; alongoli loboko naye tekino asilisaki kobebisa, abuki mapangu oyo ezalaki kobatela engumba, mpe nyoso ezalaki na mawa. 9 Bikuke ya engumba bikwei, abebisi mpe abuki bikangwelo na yango. Mokonzi mpe mokonzi bazali kati na bikolo mobeko ezali lisusu te, ata basakoli bazui emoneli na yawe te. 10 Moibange ya moseka ya siona, bafandi likolo na mabele kina, bazipi mitu na bango na putulu, balati ngoto baseka na yelusaleme bnakomisi mitu na bango kino mabele. 11 Misu na nangi malembi na kobimisa pinzoli, nayoka somo makasi mpo nako beba na moseka mpe bana mike ya engumba. 12 Balobi na ba maman na bango ete: wapi molia mpe vinyo? bazali kokweya lokola bato ba zoki na nzela ya engumba, bazali kokata mitema likolo na ntolo ya ba maman na bango. 13 Nalobelayo nini? nakokanisayo na nini, moseka na yelusaleme? nakokokisayo na nini ete nalembisayo motema? mpo pasi nayo eleki monene nani akobikisa yo. 14 Basakili nayo bazuile bino bimoneli ya lokuta, bayebisi yo masumu nayote, bazalaki kokosa yo. 15 Baleki nzela babeteliyo maboko nabango, kosekayo mpe koningeselayo mitu nabango mpona moseka nayelusaleme koloba ete, ezalai engumba oyo babengaki kitoko koleka esngo na mokili mobimba? 16 Banguna nyoso nayo bafungoli minoko na bando, baningisi mino, balobi ete; tobebisi ye, mokolo tozelaki ekokisami. 17 Yawe akokisi naye akanaki uta kala apanzi yelusaleme kozanga mawa, asepelisi monguna nayo. 18 Mitema nabango mileli epai na mokonzi, lopango na moseka na siona, pinzoli na miso na bino esopani lokola ebale butu na moi! bokoki kopema te nakolela na bino. 19 Telema, nganga kati na butu, bimisa nyoso oyo ezali na motema nayo liboso na mokonzi. Tombola maboko mpe senga ye abikisa bana nayo baoyo bazangi molia. bazali kufa na nzala pembeni nabalabala nyoso. 20 Yawe, tala mpe mona baye ozali konyokola, basi bakoki kolia mbuma na nzoto na bango, bana oyo baboti? banganga mpe basakoli babonana na esika ya bule? 21 Bana mpe mibange bazali bibembe na balabala, baseka mpe bilenge nangai bakweyi nba mpoanga na mokolo na kanda nayo, oyoki ata mawate. 22 Obengisaki bato lokola mokolo na koyangana, mokolona kanda na Yawe, mokimi azalite, mobiki azalite, moyini na ngai abebisi bango.