Mokapo ya 1

1 engumba ekomi pamba, kasi etondaki na bato, ekokani na mwasi akufeli mobali. Engumba ya lokumu na kati na bikolo ekomi lokola mowumbu. 2 Ezali kolela butu mobimba, pe naye etondi na pinzoli, moko na baninga naye abondisi ye te, kasi bakomi banguna naye. 3 Yuda na bowumbu, ya makasi pe azangi kimia, ba nyokoli naye bazui ye na ba mpasi naye. 4 Ba nzela na siona eza na kolela mpo bato baye na milulu te, bikuke bizali pamba, banganga naye bazali konguluma, Baseka naye banyokolami pe ye moko ayoki bololo. 5 Batelemeli naye balekiye, banguna naye baza na kimia, Zambi Yawe asambuisi ye pona boyike ya masumu naye, bana naye bakangami epayi na batelemeli. 6 Mwana mwasi ya siona abungisi nkembo naye; bakonzi naye bazali lokola ba mboloko oyo bazangi elielo, pe bazangi nguya liboso na nabengani na bango 7 Yerusaleme azali kokanisa mikolo na minhyoko, pe esongo na ye ya kala, tango bato naye bakweyaki na maboko ya banguna ; bayini naye basekaki kokweya naye. 8 Yerusaleme asali masumu mingi, yango akomi na bindo, ba oyo bakumisakiye bakomi kotshola ye po bamoni bolumbu naye, pe abonwani na sima. 9 Bosoto naye ezaliki na elamba ya molayi akweyi nanse pe azangi mosungi, Zambi moyi na atomboli mapeka. 10 Motelemeli atandi loboko likolo na biloko nyonso na Yerusalemle po ete mabota wana makoti na esika bule, esika oyo epekisami po na bango. 11 Bato nyonso na Yerusalema bazolela, bakomi koluka biloko ya kolia mpo bazwa lobiko, Yerusaleme alobi na Nzambe tala ndenge na tsiolami. 12 Nalobi na bino baleki na esika oyo, moto moko te anyokolami lokola ngayi, na kanda na Yawe. 13 Kowuta na likolo, atindi moto kobebisa mikuwa nanga, atandi monyama makolo nangai, azongisi ngai nsima pe kosenzwa mikolo nyoso. 14 Loboko naye ekangi litama pe mabe nangai, alembisaki makasi nagai, mokonzi akabi ngai na maboko na bango. 15 Mokonzi akitisi bato nanguya na miso nanga abengaki koyangana mpo batelemelangai pe konyata bilenge mibali nangai, pe mwana mwasi na Yuda. 16 Pona yango, nde Nazolela miso nangai etangisi pinzoli zambi akeyi mosika nangai Yende akokaki kobikisa molimo nangai akokaki kobikisa molimo na nga, bana nangai bakomi zololo mpe monguna alongi. 17 Siona atandi maboko kasi mobondisi azali te, Yawe alakisi yakobo ete baninga naye bakokoma banguna naye. 18 Yawe azali sembo mpo ete naboyaki mitindo naye, baseka nangai mpe bilenge nanga bakeyi na bowumbu. 19 Nabengaki balingami nagai, mpe bakosaki ngai, banganga mpe babange nangai bakufi mpona kozanga yakolia. 20 Yawe tala mpasi nangai mpo ete natombokaki yango kufa nekomaki. 21 Bayoki kolela ngai, kasi moto moko te ayaki kosunga ngai, banguna nagi bayoki mpasi nangai, basepeli na etumbu nangai. 22 Ekoki ete mabe na bango nyionso makomakoma epai nayo, salelabango lokola asalelaki ngai na botomboki nangai nazali kolela na butu mpe na moi mpe motema nangai elembi.