Mokapo 4

1 Bongo, lokola mokonzi mokangami mpona mokonzi, mabandeli bino botambola na bizaleli malamu na lolenge bobiangama ki. 2 Ntango nyoso bozala na konikitisa, na motema pete mpe na motema molai. 3 Kobatela bomoko kati na molimo mpe na kimia. bo tia molende kobatela ya ngo. 4 Nzoto ezali moko mpe molimo moko na ndenge bo bengamaki, 5 Mokonzi azali moko, kondima moko, libatisi moko. 6 Mpe nzambe moko tata mabata nyoso azali likolo nyoso, kosala na makambo nyoso mpe ko fanda kati na nyoso. 7 Apesi moko na moko na biso ngolu ko landana na likolo na klisto. 8 Lokola na komi elobi ntango amataki na likolo, ye a kabolaki makabo ma bato. 9 Elingi koloba nini amati soki te akitaki na nse ye mabele. 10 Ye oyo akitaki na nse eza kaka moto moko wana oyo amataki na likolo asuli bongo mpo akokisa makambo nyoso. 11 Klisto akaboli makabo oyo ba ntoma, ba sakoli, ba panzi na nsango malamu, ba bateli mpate mpe balakisi. 12 Asali bo ye mpo na kobongisa ya ba klisto. 13 Na ndenge oyo oyo tokokoma biso nyoso asika moko, kozala moko kati na kondima na biso mpe kati na boyebi na bino na mwana na nzambe. 14 Bongo tozala lisusu bana te lokola batu oyo mayi ememaka awa na kuna na mipepe ya malakisi mabe na ba kosi oyo bazali kotungisa bato na nzela mabe ya bongo. 15 Nzokande kosakola polele likambo ya solo kati na bolingo, esengeli tokola kati na makambo nyoso na oyo azali motu nde mokonzi. 16 Klisto asangisi biteni nyoso na nzoto esika, moko,ezali kokola mpe kokoma monene mpo na bolingo. 17 Bongo na nkombo na mokonzi bokoki kotambola te lokola ba pagano oyo ba tambolaka na makanisi na bango moko. 18 Mpe mayele na bango ezali molili ba zangi bomoyi oyo nzambe azali ko pesa mpe mitema na bango esili kokoma libanga. 19 Bazangi nsomi, bapesi nzoto na bango na bikobo, mpe ba zali kosala makambo ndenge nyoso ya masumu. 20 Kasi boyo kasi likambo na klisto boye te. 21 Boyokaki nsango na mokonzi mpe tango bondimaki ye, batu balaki saki bino likambo na solo oyo ezali na mokonzi. 22 Bango esengeli bo bwaka bizaleli na bino ya kala mpo ekomema yo na kufa. 23 Esengeli bobongwana kozala motema sika kati na motema na bina mpe molimo na bino. 24 Bolata moto na sika oyo nzambe, asili ko zalisa na ndenge na ye. 25 Mpo na oyo bo bwaka lokuta. moto na moto aloba solo epai na moninga na ye, mpo ete biso nyoso tozali biteni ya nzoto moko. 26 Siki bosiliki, bo keba ete bokweya kati na masumu te mpe bosilika moyi mobimba te. 27 Kopesa nzela na satana te. 28 Moyibi atika koyiba, kasi ekoki asala mosala mpo azua bileyi na ye moko mpe mpo na kosunga ba oyo bazali na bosenga. 29 Boloba maloba mate te, boloba kaka malamu mpo eko sunga bato mosusu kokende liboso kaki na kondima, boye likambo bokoloba ekoki kosunga bato oyo bazo yoka bino. 30 Boyokisa molimo mosantu na nzambe mawa te, mpo molimo azali elembo oyo nzambe asili kotia na nzoto na bino, azali kotalisa ete na mikolo mikoya nzambe akobikisa biso. 31 Bobengama mosika na bino makambo nyoso ya mabe. kanda, koswana, ko yinana, ko tomboka, ko finga. 32 Kasi bo linganaka, bo salisanaka mpe bo limbisanaka ndenge nzambe alimbisaki bino mpo na klisto.