Mokapo 3

1 Yango wana ngai polo, na komi mokangami ya mokonzi yesu pona bino ba pagano. 2 Na kanisi ete yebi mokumba nini ya ngolu na zua pona bino. 3 Na komaki mokanda ya ngo ko landana na emoneseli na zuaki. yango ezoli solo ebombama ndenge nakomaki na mokanda mosusu. 4 Soki bo tangi yango bokoyeba mayele na ngai likolo ya solo ebombama pona klisto. 5 Na bileko misusu solo yango eyebanaka te na bana na batu kasi sasaipi, ebimi puasa na lisungi na molimo na nzela ya ba ntoma pe ba sakoli ya sembo. 6 Solo yango ezali ete ba pakano pe ba zui libula elongo moko na bayuda pe ba komi nzoto moko. bazali ko kabola bilaka moko na bayuda kati na klisto yesu na nzela ya sango malamu. 7 Nakomi bongo mowumbu ya sango malamu kolanda na ngolu oyo nzambe asali ngai na nguya na ye. 8 Tata ko nazali moke kati na ba oyo ba bangama na nzambe, nazali na likabo yango. likabo etali kotatila sango malamu ya bo zui makasi tokaki kososola te kati na klisto epayi na ba pakano. 9 Esengeli na sosolisa bato nionso na maye matali miango na nzambe jambi,nzambe abomba miango yango wuta kala koleka. 10 Esala maki bongo po ete sasaipi, na nzela na etonga ba yike ba konzi ya molili na bisika eleki likolo ba yeba ba lolenge ebele ya ko sosola bwana ya nzambe. 11 Yango eko salama kolandana na miangu ya libela akokisa kati na yesu klisto mokonzi na biso. 12 Pamba te na kati na klisto to zali na kasa pe bo koti na motema pio pona kondima tozali na yango na ye. 13 Na bondeli bino bo lemba te pona minioko na zui pona bino. yango nde elonga na bino. 14 Natina na yongo na gumbamelaka nzambe tata, 15 Epai ma bota nioso mawuta kobanda na likolo pe nse. 16 Nasengi naye kolandana na nkembo na ye monene alendisa bino na nguya na ye lisanga na molimo mosantu oyo ezali kati na bino. 17 Bongo klisto avanda na mitema na bino kati na kondima pe bozala na misisa makasi kati na bolingo na ye. 18 Po ete bo sosola elongo na ba klisto nionso manso matali mosindo ya bolingo na klisto. 19 Nzambe apesi bino makoki ya koyeba monene ya bolingo ya klisto oyo eleki mayele nioso po ete botanda na bo nzambe. 20 Bongo na ye oyo azali na makoki po ko pesa biso kaleka na nguya na ye ezali kati na biso, nioso to zali ko senga pe ko kanisa, 21 Nkembo epesa nela ye na etonga kati na klisto yesu na bileko nioso seko pe libela na libela amen.