1 Yo muana na ngayi, yika mpiko na kati na ngolu na Yesu Klisto. 2 Oyo oyekolaki na ngayi lakisa yango na bato ya sembo, ba oyo bazali na mokoki ya kolakisa ba mosusu. 3 Lokola soda ya mpiko ya Yesu Klisto, nyokwama na ngayi elongo. 4 Soda moko te soki alingi asepelisa Mokonzi na ye agtalelaka lisusu makambo na ye atalelaka lisusu makambo na ye. 5 Bobele bango mokimi mbangu aokolonga soki akimi na ndenge esengeli. 6 Mokati nilanga azali kosala na makasi nyonso esengeli azala mobuki mbuma liboso. 7 Kanisa malamu na maye nazali koloban Mokonzi akososolisa yo yango. 8 Kanisaka Yesu klisto, mokotani ya Dawidi, oyo asekwaki kati na bakufi, kolandana na mateya na ngayi. 9 Na tina na yango, ngayi nazali konyokwama kino ba kangi ngayi minyololo lokola moto mabe, 10 nazali kondima ba mpasi oyo nyonso mpo ba ponami, mpo ete bango mpe ba bikisama kati na Yesu Klisto, mpo na nkembo ya libela. 11 Yoka liloba oyo ya sembo: «Soki to kufi na ye, tokosekwa mpe na ye.» 12 Soki totelemi ngwi, toko dondwa na ye elongo. Soki towangani ye, ye mpe ako wan ganga biso. 13 Soki mpe biso tozali nyamu-nyamu, nzoka nde ye akotikala sembo, akoki ko komi wanga te. 14 Wumela nako talisa bango makambo oyo benda bango matoyi ete basuana te bango na bango likolo ya liloba moko, mpo eko sunga te, nzoka nde ekotisa mobulu na ba oyo bazali koyoka. 15 Bunda ete NZambe amona yo moto na sembo , ozala mosali ya nsoni te. Kasi mosali oyo azali kotatola sango malamu mpenza. 16 Boya masolo ya pamba pamba mpo elongolaka bato pembeni na Nzambe. 17 Ba masolo na bango ezali kopanzana lokola mopepe. Hyménée et Philète mpe bazali na lingomba wana, 18 bato yango ba boyi solo, mpe bazali koteya ete lisekwa esi esalama mpe kondima ya bato mosusu ezali kokweya. 19 Nzokande, moboko ya solo mpe makasi oyo Nzambe atiaki ezali kowumela. Elobi boye: «Mokonzi, esengeli akima masumu.» 20 Na ndako ya mozui, ezalaka kaka na ba kopo ya wolo to palata te, kasi ya libaya mpe ya mabele , mpe ezalaka misusu ezalaka mpo na milulu ya minene nzokande misusu mpona milulu ya bongo na bongo. 21 Soki moto amipetoli na mabe, bakosalela ye mpe kobulisa ye lokola kopo ya lokumu oyo Mokonzi akoki kosalela mpona tango nyonso. 22 Kima ba mposa ya bolenge, luka bosembo, kondima, bolingo, kimia lisanga na ba oyo bazali ko belela Mokonzi na motema peto. 23 Kayanola mituna ya zololo mpe ya buzoba te, pamba te oyebi ete ebimisaka koswana. 24 Mosali na Mokonzi esengeli na hye koswana te, kasi esengeli azala na bolingo na bato nyonso, azala na makoki ya koteya mpe moto ya kokanga motema. 25 Esengeli ateya ba tomboki na komikitisa mpo Nzambe akoki kopesa bango nzela ya ko bongola mitema mpe koyeba solo. 26 Ba kokaki ko koma lisusu na mayele mpe kolongwa na mitambu ya satana oyo azwaki bango mpe kokanga bango mpo basalaka mokano na ye.