1 Polo ntoma ya Yesu Klisto, na mokano ya Nzambe, kolanda bilaka ya bomoyi kati na Klisto Yesu, 2 na Timothée, muana na ngayi ya bolingo, tika ete ngolu ya Nzambe na mawa mpe kimia na ye epesamela yo na nzela na Klisto Yesu Mokonzi na biso. 3 Na tondi Nzambe oyo nazo salela na motema na ngayi mpeto lokola ba koko basalaki, ko kanisa tango nyonso yo butu mpe moyi na mabondeli. 4 Nako kanisaka mayi na miso, nalingi mpenza komona yo , mpo ete motema ezala nsayi. 5 Nazali kobomba lolenge tozalaki po na kondima na yo solo solo nani azalaki liboso na koko na yo Lois, na mama na yo Eunice. Mpe naza na kondima azali na bomoyi ndenge moko na yo. 6 Nazali na kondima ete ye oyo abandaki, na yo sango malamu akokumisa yango solo mokolo na Mokonzi Yesu. 7 Na yango Nzambe apesaki biso molimo ya kobanga te, kasi ya nguya, ya bolingo ya botosi, na motema. 8 Koyoka soni te mpo na ko tatola Mokonzi na biso, Kamata eteni ya pasi mpona sango malamu ya nguya ya Nzambe. 9 Nzambe abukisi biso, mpe abiangi biso na molimo na ye , mpo na misala na biso te, kasi na mobongisi mpe ngolu na ye. 10 Lobiko na Nzambe emonani sika awa na ebimeli na mobikisi Yesu Klisto. Na koya ya mobikisi Yesu Klisto. Klisto asilisi liwa mpe ye amemi bomoyi ya seko na pole ya sango malamu. 11 Na yango wana na tiamaki moteyi, ntoma mpe malakisi. 12 Yango wana nazali kotia molende lisusu na ba pasi, kasi nazali na soni te, po nayebi nani na ndimala, pe nayebi nazali koyeba ete, ye azali na makoki ya kutala kino na mokolo wana oyo ngayi na mipesi. 13 Batela na kondima, pe bolingo kati na Klisto Yesu lolenge ya sango ya solo oyo oyokaki epayi na ngayi. 14 Bomba malamu malakisi ya kitoko oyo apesaki yo na lisalasi ya Molimi Mosantu oyo ezali kati na biso. 15 Baye bafandi na Azia basundoli ngayi. Na lisanga wana ezali na Phygelle na Hermogène. 16 Tika ete mawa na Mokonzi epesamela ndaku ya Onesiphore, mpo ete ntango nyonso azali kosunga mpe na monaki soni te na kokangama na gayi. 17 Nzokande, tangu azalaki na Rome, alukaki nga nako lemba te mpe amonaki nga. 18 Mokonzi apesa ye mawa na eloko , ndenge apesaki lisalisa na Ephèse.